Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

BOZALI na Libondeli!Mwa ndambo

BOZALI na Libondeli!

MOKOLO 4 NA 6

“Ndakisa ya Nzambe mpo na Libondeli ya biso moko ya malamu.”

Libondeli ya Tata na biso ezali moko ya mikapo oyo eyebani makasi na bibliya. Batu ebele bakanga yango na mutu to mpe ekozongela bango na mutu soki bayoki yango. Yesu apesaki malako oyo na bayekoli na ye:

“Tala ndenge nini bosengeli kosambela: ‘Tata na biso, Yo oyo ozali kati na Likolo; tika ete Kombo na Yo ebulisama, tika ete Bokonzi na Yo eya, tika ete mokano na Yo esalema, awa na mokili ndenge esalemaka kuna na Likolo! Pesa biso, na mokolo ya lelo, bilei na biso ya mokolo na mokolo; limbisa mabe na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo basalaki biso mabe; komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana; pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.’” Matayo 6:9-13

Libondeli ya Tata na biso ezali moko ya mabondeli oyo etangamaka mingi. Kasi tangu Yesu apesaki maloba oyo na bayekoli na ye. Mposa na ye ezalaki kaka te ya kopesa biso maloba ya libondeli oyo toko kanga na mutu. Apesi biso moboko ya ntina ya kotongela mabondeli na biso Nyonso.

Bokanisa naino na oyo ekangaka bino tangu bozali kobondela. To na mikakatano oyo bozali kokutana na yango na libondeli. Tangu mosusu bozali na ezaleli ya komitya likebi na bino nyonso. Tangu mosusu makanisi na bino ezali koyengayenga na boumeli ya libondeli. Ezali mikakatano oyo tokutanaka na yango tangu nyonso.

Libondeli ya Tata na biso ezali kopesa ndakisa mpo na kolonga ezaleli mpe mikakatano yango tangu tozali kokabola yango na makambo oyo elandi kati na biteni mosusu..

Oyo etali Ebongiseli oyo

BOZALI na Libondeli!

Boyekola kotonga bomoi moko ya mabondeli ya makasi mpe ya ntina. Libondeli - kosolola na Nzambe makambo ya motema- ezali fungola mpo na komona mbongwana ya malamu kati ya Bomoi na biso mpe nzinganzinga na biso.

More

Tolingi kopesa matondo mingi na Twenty20 Faith, Inc. mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.twenty20faith.org/