Ezekieli 7
7
Tango ya suka ebelemi
1Yawe alobaki na ngai : 2« Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na mokili ya Isalaele :
‹ Esili ! Tango ya suka ebelemi
mpo na mokili mobimba !
3Tango ya suka ekoki sik’oyo mpo na yo,
nakopelisela yo kanda na Ngai,
nakosambisa yo kolanda etamboli na yo
mpe nakofuta yo kolanda misala na yo nyonso ya mbindo.
4Nakotala yo na liso ya mawa te
mpe nakobikisa yo te ;
nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo
mpe kolanda misala ya mbindo oyo ezali kati na yo.
Boye okoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. ›
5Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
‹ Mawa ! Pasi ya somo ezali koya !
6Tango ya suka ebelemi !
Ya solo, tango ya suka ebelemi penza !
Etelemeli yo.
Tala, tango yango esili kobelema !
7Kobebisama ekokomela yo, yo movandi ya mokili !
Tango yango ekoki, mokolo yango ebelemi,
somo makasi ekoti,
mpe esengo ezali lisusu te na likolo ya bangomba.
8Nakomi pene ya kopelisela yo kanda na Ngai
mpe ya kotombokela yo !
Nakosambisa yo kolanda etamboli
mpe misala na yo nyonso ya mbindo.
9Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te,
nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo
mpe misala ya mbindo oyo ezali kati na yo.
Boye okoyeba solo ete Ngai Yawe nde nabetaka.
10Tala, mokolo yango nde yango oyo !
Esili kobelema !
Kobebisama eboti mbuma,
lingenda ebimisi bafololo, lolendo ekoli !
11Makambo mabe ekoli makasi
mpe ekomi lokola fimbu
mpo na kopesa etumbu na misala mabe ;
moto moko te kati na bato
to kati na bato ebele akotikala ;
eloko moko te ekotikala,
ezala bomengo to biloko ya motuya.
12Tango ebelemi, mokolo yango ekoki.
Tika ete mosombi moko te azala na esengo
to moteki moko te azala na mawa,
pamba te kanda makasi ezali kozela bato nyonso.
13Moteki akozwa lisusu te motuya ya biloko oyo atekaki,
ata soki azali nanu na bomoi ;
pamba te emoniseli oyo ezali kotalisa
ete kobebisama ya bomengo ya mokili ekokokisama solo.
Likolo ya masumu na bango,
moto moko te kati na bango akobikisa bomoi na ye.
14Ata soki babeti kelelo to bamibongisi ndenge nini,
moto moko te akokende na bitumba ;
pamba te kanda na Ngai ezali likolo ya bato nyonso.
15Mopanga ekoboma na libanda ya engumba,
bokono oyo ebomaka mpe nzala makasi
ekoboma kati na engumba ;
bato oyo bazali kati na mokili bakokufa na mopanga,
mpe bato oyo bazali kati na engumba bakokufa
na bokono oyo ebomaka mpe na nzala makasi.
16Batikali bakokima na likolo ya bangomba ;
mpe kuna, bakokoma kolelalela lokola bibenga,
moto na moto mpo na masumu na ye.
17Maboko na bango nyonso ekolemba,
mpe mabolongo na bango nyonso
ekolemba lokola mayi.
18Bakolata bilamba ya basaki
mpe somo ekokanga bango ;
bilongi na bango ekotonda na soni,
bakokokola suki ya mito na bango.
19Bakobwaka palata na bango na babalabala,
mpe wolo na bango ekomonana lokola eloko ya mbindo.
Palata mpe wolo na bango ekozala na makoki te
ya kobikisa bango na mokolo ya kanda ya Yawe.
Palata mpe wolo yango ekosilisa
baposa mpe nzala na bango te,
pamba te yango nde ekweyisaki bango na masumu.
20Basalaki lolendo mpo na kitoko
mpe motuya ya biloko na bango ya monzele
oyo basalaki na yango banzambe na bango ya bikeko
mpe bililingi ya somo.
Yango wana, nakokomisa biloko yango
mbindo na miso na bango.
21Nakokaba yango lokola bomengo ya bitumba
na maboko ya bapaya mpe ya bato mabe ya mokili
mpo ete babotola yango na makasi
mpe basakanela yango.
22Elongi na Ngai ekotala bango lisusu te,
mpe bato mabe bakobebisa Esika na Ngai ya bule.
Bongo, miyibi bakokota kuna
mpe bakosambwisa yango.
23Bomisalela minyololo mpo ete mokili etondi na babomi
mpe engumba etondi na makambo mabe.
24Nakotinda ekolo oyo eleki mabe kati na bikolo
mpo ete eya kobotola bandako na bango ;
nakosilisa lolendo ya bato ya nguya
mpe nakosambwisa bisika na bango ya bule.
25Tango makambo oyo ya somo ekoya,
bakoluka kimia kasi bakozwa yango te.
26Pasi likolo ya pasi nde ekokomela bango,
basango ya mabe na ya mabe nde ekolandana.
Bakoluka bimoniseli na pamba epai ya basakoli ;
Banganga-Nzambe bakokoka lisusu te
koteya malakisi ya Mobeko,
mpe bakambi bakozanga toli ya kopesa.
27Mokonzi akozala na matanga,
mokambi akolata pili,
mpe maboko ya bato ya mokili ekokoma kolenga.
Nakofuta bango kolanda etamboli na bango
mpe nakosambisa bango kolanda misala na bango.
Boye, bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. › »
Currently Selected:
Ezekieli 7: MNB
Tya elembo
Copy
Kokisana
Kabola
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.