1
Ezekieli 7:19
Mokanda na Bomoi
MNB
Bakobwaka palata na bango na babalabala, mpe wolo na bango ekomonana lokola eloko ya mbindo. Palata mpe wolo na bango ekozala na makoki te ya kobikisa bango na mokolo ya kanda ya Yawe. Palata mpe wolo yango ekosilisa baposa mpe nzala na bango te, pamba te yango nde ekweyisaki bango na masumu.
Kokisana
Luka Ezekieli 7:19
2
Ezekieli 7:27
Mokonzi akozala na matanga, mokambi akolata pili, mpe maboko ya bato ya mokili ekokoma kolenga. Nakofuta bango kolanda etamboli na bango mpe nakosambisa bango kolanda misala na bango. Boye, bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. › »
Luka Ezekieli 7:27
3
Ezekieli 7:4
Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te ; nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo mpe kolanda misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. Boye okoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. ›
Luka Ezekieli 7:4
4
Ezekieli 7:9
Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te, nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo mpe misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. Boye okoyeba solo ete Ngai Yawe nde nabetaka.
Luka Ezekieli 7:9