Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

1 Masolo ya Kala 8

8
Libota ya Benjame
(Ebl 46.21; Mit 26.38-40)
1Bana mibali ya Benjame :
Bela, mwana ya liboso ;
Ashibeli, mwana ya mibale ; Ara, mwana ya misato ;
2Noa, mwana ya minei ; mpe Rafa, mwana ya mitano.
3Bana mibali ya Bela :
Adari, Gera, Abiwudi, 4Abishuwa, Namani, Aowa, 5Gera, Shefufani mpe Urami.
6Tala bana mibali ya Ewudi oyo bazalaki bakambi ya bituka ya bavandi ya Geba, mpe bamemaki bato ya Geba na Manaati :
7Namani, Ayiya mpe Gera.
Ezalaki Gera, tata ya Uza mpe ya Ayiwudi, nde moto amemaki bango na bowumbu.
8Shaarayimi abotaki bana na mokili ya Moabi, sima na ye kobengana basi na ye mibale :
Ushimi mpe Baara.
9Na nzela ya Odeshi, mwasi na ye ya sika, abotaki :
Yobabi, Tsibia, Mesha, Malikami, 10Yeutsi, Sakia mpe Mirima.
Bango nde bazalaki bana mibali ya Shaarayimi, oyo bakomaki bakambi ya bituka.
11Elongo na Ushimi, mwasi na ye, Shaarayimi abotaki :
Abitubi mpe Elipaali.
12Bana mibali ya Elipaali :
Eberi, Misheami mpe Shemeri oyo atongaki bingumba Ono mpe Lodi elongo na bamboka na yango ya mike.
13Beria mpe Shema oyo bazalaki bakambi ya bituka ya bavandi ya Ayaloni babenganaki bato ya Gati.
14Bana mibali ya Beria :
Ayiyo, Shashaki, Yeremoti, 15Zebadia, Aradi, Ederi, 16Mikaeli, Yishipa mpe Yoa, bana mibali ya Beria.
17Zebadia, Meshulami, Iziki, Eberi, 18Yishimerayi, Yiziliya mpe Yobabi bazalaki bana mibali ya Elipaali.
19Yakimi, Zikiri, Zabidi, 20Elienayi, Tsilitai, Elieli, 21Adaya, Beraya mpe Shimirati bazalaki bana mibali ya Shimei.
22Yishipani, Eberi, Elieli, 23Abidoni, Zikiri, Anani, 24Anania, Elami, Anitotiya, 25Yifidea mpe Penueli bazalaki bana mibali ya Shashaki.
26Shamisherayi, Shearia, Atalia, 27Yaareshia, Eliya mpe Zikiri bazalaki bana mibali ya Yeroami.
(1Ma 9.34-44)
28Bango nyonso bazalaki bakambi ya bituka ndenge bakomama na buku ya mabota na bango, mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi.
(1Ma 9.35-43; 1Sa 14.49-51)
29Yeyeli, tata ya Gabaoni, azalaki kovanda na Gabaoni.
Kombo ya mwasi na ye ezalaki « Maaka. » 30Abidoni azalaki mwana na ye ya liboso ya mobali ; sima, Tsuri, Kishi, Bala, Nadabi, 31Gedori, Ayiyo mpe Zekeri. 32Mikiloti abotaki mwana mobali, Shimea. Bango mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi elongo na mabota na bango.
33Neri abotaki Kishi ;
Kishi abotaki Saulo ;
Saulo abotaki Jonatan, Maliki-Shuwa, Abinadabi mpe Eshibala.
34Jonatan abotaki Meriba-Bala ;
Meriba-Bala abotaki Mishe.
35Mishe abotaki :
Pitoni, Meleki, Taereya mpe Akazi.
36Akazi abotaki Yeoyada ;
Yeoyada abotaki Alemeti, Azimaveti mpe Zimiri, tata ya Motsa.
37Zimiri abotaki Motsa ;
Motsa abotaki Bineya ;
Bineya abotaki Rafa ;
Rafa abotaki Eleasa ;
mpe Elasa abotaki Atseli.
38Atseli abotaki bana mibali motoba :
Azirikami, Bokuru, Isimaeli, Shearia, Abidiasi mpe Anani.
Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Atseli.
39Bana mibali ya Esheki, ndeko mobali ya Atseli :
Ulami, mwana na ye ya liboso ; Yewushi, mwana ya mibale ; mpe Elifeleti, mwana ya misato.
40Bana mibali ya Ulami bazalaki basoda ya mpiko oyo bayebaki kosalela tolotolo. Bazalaki na bana mibali mpe bakoko ya mibali ebele : nkama moko na tuku mitano.
Bango nyonso bazalaki bakitani ya Benjame.

Currently Selected:

1 Masolo ya Kala 8: MNB

Tya elembo

Copy

Kokisana

Kabola

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo