1 Masolo ya Kala 7
7
Libota ya Isakari
(Ebl 46.13; Mit 26.23-24; Bil 10.1)
1Isakari abotaki bana mibali minei :
Tola, Puwa, Yashubi mpe Shimironi. Bango nyonso bazalaki minei.
2Bana mibali ya Tola :
Uzi, Refaya, Yeriyeli, Yamayi, Yibisami mpe Samuele.
Bango nde babotamaki na nzela ya Tola mpe bazalaki bakambi ya mabota ya botata na bango. Kati na mabota na bango, bazalaki basoda ya mpiko nkoto tuku mibale na mibale na nkama motoba, na tango Davidi azalaki mokonzi.
3Bana mibali ya Uzi :
Yiziraya.
Bana mibali ya Yiziraya :
Mikaeli, Abidiasi, Joeli mpe Yishiya.
Bango nyonso mitano bazalaki bakambi. 4Kati na molongo na bango kolanda bituka na bango mpe mabota na bango ya botata ; ezalaki na basoda ya mpiko nkoto tuku misato na motoba, pamba te bazalaki na basi mpe bana ebele.
5Bandeko mibali nyonso kati na bituka ya libota ya Isakari, oyo bakomamaki na buku ya mabota, bazalaki nkoto tuku mwambe na sambo. Bazalaki basoda ya mpiko.
Libota ya Benjame
(Ebl 46.21; Mit 26.38-39)
6Benjame abotaki bana mibali misato :
Bela, Bekeri mpe Yediayeli.
7Bela abotaki bana mibali mitano :
Etsiboni, Uzi, Uzieli, Yerimoti mpe Iri.
Bazalaki bakambi ya bituka na bango mpe basoda ya mpiko. Motango ya bato oyo batangamaki ezalaki nkoto tuku mibale na mibale na tuku misato na minei.
8Bana mibali ya Bekeri :
Zemira, Yoashi, Eliezeri, Eliowenayi, Omiri, Yeremoti, Abiya, Anatoti mpe Alemeti.
Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Bekeri. 9Motango ya basoda ya mpiko, kolanda bituka na bango, ezalaki nkoto tuku mibale na nkama mibale.
10Bakitani ya Yediayeli :
Bilani.
Bana mibali ya Bilani :
Yewushi, Benjame, Ewudi, Kenaana, Zetani, Tarsisi, Ayishaari.
11Kati na molongo ya Yediayeli, bakitani nyonso bazalaki bakambi ya bituka na bango mpe basoda ya mpiko. Motango na bango ezalaki nkoto zomi na sambo na nkama mibale.
12Bana mibali ya Iri :
Shupimi mpe Upime.
Ushimi azalaki mwana mobali ya Aeri.
Libota ya Nefitali
(Ebl 46.24; Mit 26.48-50)
13Bana mibali ya Nefitali :
Yatseyeli, Guni, Yetseri mpe Shalumi.
Bazalaki bakitani ya Bila.
Libota ya Manase
14Bakitani ya Manase :
Asirieli na nzela ya makangu na ye, moto ya Arami. Abotelaki ye lisusu Makiri, tata ya bato ya Galadi. 15Makiri abalaki Maaka oyo azalaki ndeko mwasi ya Upime mpe Shupimi. Kombo ya mwana mobali mosusu ya Manase ezalaki « Tselofikadi. » Tselofikadi abotaki kaka bana basi. 16Maaka, mwasi ya Makiri, abotelaki ye lisusu mwana mobali oyo apesaki kombo « Peretsi. » Peretsi azalaki na ndeko mobali, Shereshi, oyo abotaki bana mibali oyo : Ulami mpe Rekemi.
17Ulami abotaki :
Bedani oyo azalaki mwana mobali.
Bango nde bazalaki bakitani ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase.
18Amoleketi, ndeko mwasi ya Manase, abotaki
Ishodi, Abiezeri mpe Mala.
19Bana mibali ya Shemida :
Ayani, Sishemi, Liki mpe Aniami.
Libota ya Efrayimi
20Bakitani ya Efrayimi :
Efrayimi abotaki Shutela, Shutela abotaki Beredi,
Beredi abotaki Taati, Taati abotaki Eleada,
Eleada abotaki Taati, 21Taati abotaki Zabadi,
mpe Zabadi abotaki Shutela.
Bankolo mboka oyo babotamaki na mokili ya Gati, babomaki Ezeri mpe Eleadi, pamba te balukaki kobotola bibwele ya bato ya Gati. 22Tata na bango Efrayimi alelaki bango mikolo ebele, mpe bandeko na ye bayaki kobondisa ye. 23Sima na yango, Efrayimi asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye oyo azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Boye Efrayimi apesaki ye kombo « Beria, » pamba te abotamaki tango pasi ezalaki kati na libota na ye. 24Efrayimi azalaki lisusu na mwana mwasi, Shera, oyo atongaki Beti-Oroni ya ngomba mpe ya lubwaku, mpe Uzeni-Shera.
25Beria abotaki Refa, Refa abotaki Retsefi,
Retsefi abotaki Tela, Tela abotaki Tayani,
26Taani abotaki Laedani, Laedani abotaki Amiwudi,
Amiwudi abotaki Elishama, Elishama abotaki Nuni,
27Nuni abotaki Jozue.
28Bakitani ya Efrayimi bazwaki lokola libula mpe bisika ya kovanda : Beteli mpe bamboka na yango ya mike, na ngambo ya este ; Narani, na ngambo ya weste ; Gezeri mpe bamboka na yango ya mike ; Sishemi mpe bamboka na yango ya mike kino na Aya mpe bamboka na yango ya mike. 29Bakitani ya Manase bazwaki lokola libula : Beti-Sheani, Taanaki, Megido, Dori mpe bamboka na yango ya mike. Bakitani ya Jozefi, mwana mobali ya Isalaele, bazalaki kovanda na bingumba wana nyonso.
Libota ya Aseri
(Ebl 46.17; Mit 26.44-45)
30Bana mibali ya Aseri :
Yimina, Yishiva, Yishivi mpe Beria.
Sera azalaki ndeko na bango ya mwasi.
31Bana mibali ya Beria :
Eberi mpe Malikieli oyo azalaki tata ya bato ya Biriza.
32Bana mibali ya Eberi :
Yafeleti, Shomeri, Otami mpe ndeko na bango ya mwasi Shuwa.
33Bana mibali ya Yafeleti :
Pasaki, Bimali mpe Ashivati.
Bango nde bazalaki bana mibali ya Yafeleti.
34Bana mibali ya Shemeri :
Ayi, Roega, Yewuba mpe Arami.
35Bana mibali ya Elemi, ndeko mobali ya Shemeri :
Tsofa, Yimina, Sheleshi mpe Amali.
36Bana mibali Tsofa :
Suwa, Arineferi, Shuwali, Beri, Yimira, 37Betseri, Odi, Shama, Shilisha, Yitirani mpe Beera.
38Bana mibali ya Yeteri :
Yefune, Pisipa mpe Ara.
39Bana mibali ya Ula :
Ara, Anieli mpe Ritsiya.
40Bango nyonso bazalaki bakitani ya Aseri : bazalaki bakambi ya mabota na bango, bato ya lokumu, basoda ya mpiko mpe bakambi ya bakambi ya bituka. Motango ya bato nyonso oyo bakomamaki na buku ya mabota mpe bakoki mpo na bitumba, ezalaki nkoto tuku mibale na motoba.
Currently Selected:
1 Masolo ya Kala 7: MNB
Tya elembo
Copy
Kokisana
Kabola
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.