1
Barome 14:17-18
Mokanda na Bomoi
MNB
Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to ya komela, kasi ezali nde likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu. Moto oyo asalelaka Klisto na lolenge oyo asepelisaka Nzambe, mpe bato bandimaka ye.
Bandingkan
Telusuri Barome 14:17-18
2
Barome 14:8
Soki tozali kobika bomoi, tozali kobika yango mpo na Nkolo ; soki mpe tokufi, tokufi mpo na Nkolo. Yango wana, tobika bomoi to tokufa, tozali kaka bato ya Nkolo.
Telusuri Barome 14:8
3
Barome 14:19
Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka bamoko mpe bamosusu kati na kondima.
Telusuri Barome 14:19
4
Barome 14:13
Yango wana, totika kosambisana biso na biso. Nzokande, bosalela mayele na bino te mpo na kobetisa ndeko moko libaku to mpo na kokweyisa ye.
Telusuri Barome 14:13
5
Barome 14:11-12
Pamba te ekomama : « Na Kombo na Ngai, » elobi Nkolo, « mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekotatola Nzambe. » Boye, moko na moko kati na biso akosamba liboso ya Nzambe mpo na makambo na ye moko.
Telusuri Barome 14:11-12
6
Barome 14:1
Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, na kotiana lisusu tembe te na tina na makanisi.
Telusuri Barome 14:1
7
Barome 14:4
Boni, ozali nani mpo na kosambisa mosali ya moto mosusu ? Atelema to akweya, ezali likambo ya nkolo na ye. Tembe ezali te, akotelema kaka, pamba te Nkolo na ye azali na makoki ya kotelemisa ye.
Telusuri Barome 14:4
Beranda
Alkitab
Rencana
Video