Nini boluki epesi
1 Bakolinto 13:4 (MNB)
Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te,
1 Yoane 4:18 (MNB)
Kati na bolingo, kobanga ezalaka te ; kasi bolingo oyo ezali ya kokoka elongolaka bobangi, pamba te bobangi ebendaka etumbu. Mpe moto oyo abangaka azali nanu ya kokoka te kati na bolingo.
1 Yoane 4:8 (MNB)
Moto oyo azangi bolingo ayebi Nzambe te, pamba te Nzambe azali bolingo.
Masese 7:18 (MNB)
Yaka tolangwa bolingo kino na tongo, tomipesa mobimba na elengi ya bolingo,
1 Bakolinto 13:13 (MNB)
Boye sik’oyo, makambo oyo misato ezali kowumela : kondima, elikya mpe bolingo ; kasi kati na yango, likambo oyo eleki monene ezali nde bolingo.
Banzembo 31:17 (MNB)
Tala ngai mosali na Yo, na miso ya bolingo ; bikisa ngai kati na bolingo na Yo.
1 Bakolinto 16:14 (MNB)
Bosalaka makambo nyonso na bolingo.
Yoane 15:13 (MNB)
Bolingo oyo eleki monene ezali : kokaba bomoi mpo na balingami.
1 Bakolinto 13:6 (MNB)
Bolingo eyokaka mawa liboso ya bozangi bosembo, kasi esepelaka na bosolo.
Barome 1:31 (MNB)
bato bazanga mayele, bosembo, bolingo mpe mawa.
1 Yoane 4:16 (MNB)
Mpe biso toyebi mpe tozali na kondima kati na bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo, mpe moto oyo abikaka kati na bolingo abikaka kati na Nzambe, mpe Nzambe abikaka kati na ye.
Masese 10:12 (MNB)
Koyina ebendaka koswana, kasi bolingo ezipaka mabe.
Jeremi 31:3 (MNB)
Yawe abimelaki biso na kala, alobaki : « Nalingaka bino na bolingo ya seko ; yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo.
1 Yoane 4:7 (MNB)
Balingami na ngai, tolinganaka biso na biso, pamba te Nzambe azali bolingo. Moto nyonso oyo azali na bolingo azali ya Nzambe mpe ayebi Nzambe.
Banzembo 85:11 (MNB)
Bolingo mpe boyengebene ekutanaka, bosembo mpe kimia eyambanaka.
Luka 7:47 (MNB)
Yango wana, nazali koloba na yo : ebele ya masumu na ye elimbisami, lokola atalisi bolingo monene. Kasi moto oyo balimbisaki niongo moke azali kotalisa bolingo moke.
Barome 10:2 (MNB)
Pamba te nakoki solo kotatola mpo na bango ete bazali penza na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe. Nzokande, bolingo yango evandisami na boyebi te.
Banzembo 119:138 (MNB)
osalaki malako na Yo na bosembo mpe na bolingo.
Yoane 15:10 (MNB)
Soki kaka bobateli mibeko na Ngai, bokowumela kati na bolingo na Ngai, ndenge Ngai nabatelaki mibeko ya Tata na Ngai mpe nawumelaka kati na bolingo na Ye.
Bagalatia 5:22 (MNB)
Kasi mbuma ya Molimo ezali : bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima,
1 Bakolinto 13:7 (MNB)
Tango nyonso mpe na makambo nyonso, bolingo elimbisaka, endimaka, ezalaka na elikya, eyikaka mpiko.
Jide 1:2 (MNB)
Tika ete mawa, kimia mpe bolingo efuluka kati na bino !
Matayo 24:12 (MNB)
Lokola mabe ekokola se kokola, bolingo ya bato ebele ekokita.
Barome 12:9 (MNB)
Tika ete bolingo ezalaka na lokuta te ! Boyinaka makambo mabe, bokangamaka makasi na makambo malamu.
Banzembo 48:10 (MNB)
Nzambe, kati na Tempelo na Yo, tokanisaka bolingo na Yo.