Tika Lisano Ya Kopamela Basusu | Eteni 3Mwa ndambo

BOMOTO
Bato babulunganaki mpo na koyeba bomoto ya solosolo ya moto oyo azali mokufi miso, kasi ye moko amiyebaki azali nani. Bato bazalaki kosala lokola bayebi ye te, kasi ye moko amiyebaki. Osengeli komiyeba yo moko soki te, bato ba kotya yo na molongo mpe bakosala yo makambo ndenge balingi. Bomoto na yo ya sika kati na Klisto ekoki kotyelama ntembe te, ozali oyo liloba ya Nzambe elobi ete ozali kasi oyo bato bazali koloba te. Opesameli nguya ya kokoma mwana na Nzambe, ezali na libula moko te mpe liaku moko te oyo eleki kozala mwana ya oyo aleki Likolo. Kozala mwana ya lola eleki kozala mwana mboka ya mokili oyo. Ozali na ntina mingi koleka Ambasadere ya mboka na yo mpamba te ozali Ambasadere ya Klisto. Ozali likolo mingi, ozali mungwa ya mokili mpe pole ya mokili. Ozali moto oyo abikisaka, abongolaka makambo, atambwisaka makambo, atambwisaka kimya, esengo, bosembo, motema molai, boboto mpe bolingo.
Kotika te moto moko abangisa yo to apesa yo motuya lolenge alingi. Ozalaki mokufi miso, kasi sikawa ozali komona; ozalaki moumbu, nde sikawa ozali na bonsomi; ozalaki mopagano, nde sikawa osili kobotama mbala ya mibale; yango wana, telema ngwi kati na kondima mpe batela bomoto na yo ya sika kati na Klisto.
Libondeli: Tata Nzambe, Natondi yo na ndenge opesi ngai bonsomi mpe nazali na bonsomi ya solosolo. Moto ya kala asili kokufa mpe sikawa, nazali moto ya sika kati na Klisto. Nakozala na bomoi engebene bomoto na ngai ya sika kati na Klisto mpe na kobota mbuma mingi mpo na nkombo ya nkombo na yo. Na nkombo ya Yesu nabondeli mpe nandimi, AMEN.
Botangi mosusu: Yoane 1:12| 2 Bakolinto 5: 17-21| Bafilipi 3:20-21| Ba Efeso 2:6-67 | 1 Petelo 2 :9
Makomi
Oyo etali Ebongiseli oyo

Ntango bokonzi ya bokeli mpe ya mayele ya sika ekutani na elikya mpe kondima, makamwisi ekomaki likambo ya mikolo nyonso. Oyo Yesu alobi na yo ezali na motuya mingi koleka oyo bato bazoloba na yo. Bato bakoki kotyola bofuluki na yo mpo ete bayebi te lolenge nini esalamaki to mpo na zuwa, yo kangama ngwi, yeba nani ozali mpe batela kondima na yo kati na Klisto.
More
Tolingi kopesa matondo mingi na Dennis Mutombo Mpanya mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.facebook.com/Pastor.Wampayo?mibextid=LQQJ4d