Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Tika Lisano Ya Kopamela Basusu | Eteni 7Mwa ndambo

Tika Lisano Ya Kopamela Basusu | Eteni 7

MOKOLO 3 NA 3

NGUYA YA KOBIKA KATI NA LILOBA YA NZAMBE

Ebele monene ya bato oyo bazalaki na maladi mpe na bolembu ya ndenge na ndenge bazalaki kofanda na libulu ya mai ya Betesaida mpo na kozela libaku ya Kopumbwa liboso kati na mai wana ya yikiyiki mpo na kobikisama na maladi ya lolenge nyonso. Ezalaki oyo aye liboso nde akobikisama, matondi na Nzambe mpo na Yesu lelo oyo ezali lisusu bongo te, ekomi moto nyonso oyo andimeli liloba ya Nzambe akobikisama (Yoane 3:16). Likambo oyo ozali na yango mposa lelo oyo lokola Moklisto ezali ya koyeba ntango mpe bileko, soki te okoki kozanga libaku malamu ya kobikisama na nzoto mpe molimo. Osengeli kososola ete tozali kobika na mbula ya kondimama na Nkolo. Luka koyeba ngolu ya Yesu Klisto mpe zala na bomoi mpo na ye.

Anzelu oyo azali kobulunganisa mai ezali elembo ya bateyi oyo bazali kosakola liloba ya Nzambe; ntango nyonso oyo ozali koyoka liloba ya Nzambe, ezala na nzela nini to na esika nini, yeba ete ezali libaku na yo ya kobikisama. Bato oyo balingaka kopamela basusu bazwaka bapesaka motuya na liloba ya Nzambe te, balukaka ntango nyonso ndenge ya komilongisa mpe kotelemela liloba ya Nzambe. Basusu bakoloba ete, liloba ya lelo ezalaki na nguya te, Pasteur azalaki na kopakolama te, azalaki ya kokauka, Pasteur azalaki koteya na ntina na ngai, akokaki kutu te kotanga Biblia lokola esengeli kozala. Na ntango ozali koyoka liloba ya Nzambe kozala na makanisi ya mosuni te. Ntango nyonso ozali koyoka liloba ya Nzambe, koloba te ete liloba oyo ezali mpo na ngai te, ezali mpo na songolo pakala, TE, ezali nde mpo na yo. Kobosana te, liloba ya Nzambe ekoki kobima te mpe kozonga te ezanga kokokisa mokano na yango kati na bomoi na yo. Liloba ya Nzambe ezali na nguya mingi ya kobikisa koleka mai ya Betesaida. Mai ya Betesaida ekokaki bobele kobikisa nzoto kasi liloba ya Nzambe ezali kobikisa nzoto mpe molimo.

Wana ozali kotanga mokanda oyo, tika ete lolenge ya kondima oyo ezalaki kati na Mokonzi ya basoda ya Loma na ntina na kobikisama ya mosaleli na ye esalema kati na yo na nkombo ya Yesu. Okoki kondima ete liloba moko ya Yesu ekoki kobikisa yo mpe kobikisa baninga na yo? Elongo na Yesu makambo nyonso ekoki kosalema.

Libondeli: Na nkombo ya Yesu, nandimi ete liloba moko ya Nzambe ekoki kobikisa nzoto mpe molimo na ngai sikoyo. Epai na baoyo bazali na bokono natindeli bango liloba ya kobikisama mobimba sikawa na nkombo ya Yesu. Tata tinda liloba na yo mpo na kobikisa bokono na bango. Tika ete kobikisama ekoma solo kati na bomoi na bango nyonso bazali na bokono ya molimo mpe ya nzoto lelo, na nkombo na Yesu nabondeli, AMEN.

Botangi mosusu: Nzembo 107:20 | Ba Ebre’ 4:12 | Ezayi 55:10-11 | Luka 7:1-10 |

Oyo etali Ebongiseli oyo

Tika Lisano Ya Kopamela Basusu | Eteni 7

Makambo ya bomoi ya Yesu na Galilai masalemaki na boumeli ya mwa basanza kati na Mokapo 4 mpe 5, kasi Yoane azwaki ekateli ya kolobela yango te mpamba te masolo yango masilaki kokomama kati na Baevanzile ya Synoptique. Yoane alobelaki mingi bitumba minene oyo Yesu abandaki na Yelusaleme, esika oyo Bayuda bazalaki na makanisi mabe mpo na basusu.

More

Tolingi kopesa matondo mingi na Dennis Mutombo Mpanya mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.facebook.com/Pastor.Wampayo?mibextid=LQQJ4d