Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Kobengama na Leadership ya BowumbuMwa ndambo

Kobengama na Leadership ya Bowumbu

MOKOLO 3 NA 5

Kososola Situation

Oza na ka mwa lisolo ya kosekisa (to pe ka mwa soni) etali kozala ya kobongama te to kobongama malamu te po na course, to examen, to pe evénement moko? Soki oza na lisolo te, elingi koloba ete ozalaka ya kobongama tango nioso na ba situation nioso. Na bisika mingi ya bomoyi na biso, kobongisama na biso e influencaka impact na biso, pe leadership eza pe ndenge wana. Eza motuya po na biso koyeba ndenge kososola leadership na biso na discernement pe bolingo, komibongisa malonga po ete tokoka kokamba bato oyo baza na se na biso na esika oyo basengeli kozala.

Kobosana te ete leadership ya Moise emataki na se ya situation ya faiblesse oyo Ban’a Nzambe bazalaki, kuna na Egypt. Situation oyo bato bazalaki etindaki leadership ya Moise ekola pe emata. Na ndenge moko, Néhémie amonaki motema pasi esilaki ye koyoka basango ya Jérusalème, pe amipesaki po akamba ban’a Nzambe. Peut-etre okoki komi mona na ndenge ya leadership oyo pe ete oza na pota – to courage – na tina ya injustice. O yei na leadership likolo ya mposa na yo ya komona position pe situation ya Bana Nzambe ebongwama.

Tango Yesu akomaki esika ni esika, a monaki mawa po na bato oyo bazaki kuna po ete bazalki lokola bampate bazangi mobateli. Akokaki kosoloa situation ya bato penza, condition na bango, po na kopesa bango oyo esengelami na mosuni pen a molimo liboso atinda balandi na ye basakolela Nango. Peut-etre osengeli komituna soki Nzambe azo benga yo na ndenge ya kokamba bato na esika abongisaki po na bango. Soki eza ndenge wana, ozo ko mibongiselama ndenge nini po na mission yango?

Lisapo ya Nzambe kosolola na mwana mobali moke na kombo ya Samuel elakisi ete tango Nzambe abengi, elingi koloba te ete atindi mbala moko. Eza na espace wuta kobengama pe kotindama ya Nzambe, tango komibongisama ezo salama. Kobongisama na biso eko determine impact pe bokasi na biso. Banda nde kosambela ete Nzambe apesa yo nguya ya koyeba tina oyo Nzambe azo benga yo, liboso ondima leadership.

Yeba ete préparation to kobongisama na yo eko changé objectif a leadership na yo te, kasi eko change yo – leader. Peut-etre oyebi ba leader oyo bandimaki leadership oyo bazalaki ya kobongama po na yango te to babongamaka malamu po na yango te, pe basukaki kokamba mangamba oyo ezalaki kokende ata esika moko te. Komibongisama ya mabe ekoki kozala na ba consequence ya tango malayi. Leadership oyo Nzambe apesi yo e changeaka te quelle que soit préparathion to kobongisama na yo, kasi moto moko te alingi ko vivre na ba regret po ete andimaki leadership na ndenge ya fièr to prématuré to kozanga formation malamu ya théologie.

En tant que leader, obengami na esika ya spécific, po na leadership na yo kozala na motuya pe makasi osengeli koyeba ba détail na yango. Olekisi tango boni po na kobondela na bato oyo ezo teyela? Okamati tango boni komeka kososola condition na bango? Oyo eleki motuya eza pe, osili kososola deja esika wapi Nzambe alingi kokamba bango, pe obongisi mateya na yo po ete ezala eyano po na bango na ndenge elongobani? Tika ete Nzambe a bongola you po okoma leader oyo mposa na ye ezali kaka kobongola bato misusu po ete bakokisa destine na bango.

Oyo etali Ebongiseli oyo

Kobengama na Leadership ya Bowumbu

Tosengami tokamba lokola Yesu. Leadership nde ebandi na caractèr, kasi titre te, pe tina n’ango eza komema ban’a Nzambe kosala mokano na ye. Ba dévotion oyo ya mokolo na mokolo ekosalisa yo kotonga foundation makasi na leadership na yo, po obosana te ete liboso ozala leader oza mosali, pe liboso ozala mosali oza mwan’a Nzambe.

More

Tolingi kopesa matondo mingi na "Afrika Mhlophe mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://afrikam.co.za/