Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

2 Samuele 18:9-10 - Compare All Versions

2 Samuele 18:9-10 MNB (Mokanda na Bomoi)

Abisalomi akutanaki na bato ya Davidi na mbalakata. Azalaki kotambola na likolo ya mile na ye. Bongo tango mile ekimaki, ekotaki na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki na bitape ekangana-kangana, mpe moto ya Abisalomi ekangamaki na nzete. Abisalomi atikalaki ya kodiembela na likolo, kasi mile oyo azalaki kotambolisa ekobaki kokima mbangu. Tango moko kati na basoda amonaki ye, alobaki na Joabi : — Namoni Abisalomi amidiembiki na nzete ya terebente.