2 Samuele 18:9-10
2 Samuele 18:9-10 MNB
Abisalomi akutanaki na bato ya Davidi na mbalakata. Azalaki kotambola na likolo ya mile na ye. Bongo tango mile ekimaki, ekotaki na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki na bitape ekangana-kangana, mpe moto ya Abisalomi ekangamaki na nzete. Abisalomi atikalaki ya kodiembela na likolo, kasi mile oyo azalaki kotambolisa ekobaki kokima mbangu. Tango moko kati na basoda amonaki ye, alobaki na Joabi : — Namoni Abisalomi amidiembiki na nzete ya terebente.

