Yobo 31
31
Yobo alobeli bosembo na ye
1« Nasalaki boyokani elongo na miso na ngai
ete nalula elenge mwasi te.
2Pamba te, libula nini Nzambe akoki kobongisela
ngai wuta na likolo ?
Libonza nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kotindela
ngai wuta na likolo ?
3Boni, pasi ezali mpo na bato mabe te ?
Kobebisama ezali mpo na bato oyo basalaka masumu te ?
4Amoni banzela na ngai te ?
Atangi matambe na ngai nyonso te ?
5Soki natambolaki na lokuta
to litambe na ngai elandaki nzela mabe,
6tika ete Nzambe ameka ngai na emekelo ya sembo,
mpe akomona ete ngai nasali mabe te.
7Soki matambe na ngai ebimaki na nzela na Ye,
soki motema na ngai etambolisamaki kolanda miso na ngai,
soki maboko na ngai ekomaki mbindo,
8tika ete bato mosusu balia biloko oyo ngai naloni,
mpe tika ete nkona na ngai epikolama !
9Soki motema na ngai ekosamaki na mwasi
to soki natalaki na makanisi mabe ekuke ya mozalani na ngai,
10tika ete mwasi na ngai atutela moto mosusu ble
mpe tika ete mibali mosusu basangisa na ye nzoto.
11Pamba te elingaki kozala likambo ya soni,
mpe lisumu ya boye ebongi na esambiselo ya basambisi.
12Ezali moto oyo ezali kozikisa kino na kobebisama
mpe ekoki kobebisa bomengo na ngai nyonso.
13Soki nasalelaki na bosembo te bawumbu na ngai ya mibali mpe ya basi
tango bazwaki ngai mabe,
14nakosala nini soki Nzambe asambisi ngai ?
Nakopesa eyano nini tango akotuna ngai
ndenge nini nabandaki kosala ?
15Ezalaki Ye te oyo asalaki ngai kati na libumu ya mama na ngai
nde asalaki bango ?
Ngai na bango, tozalaki lolenge moko te
kati na mabumu ya bamama na biso ?
16Soki nakokisaki te posa ya mobola
to soki nalembisaki miso ya mwasi oyo akufisa mobali,
17soki nabombaki lipa na ngai mpo na ngai moko
to nakabolaki yango te na bana bitike,
18—nzokande wuta bolenge na ngai,
nazalaki kobokola bana bitike lokola tata na bango ;
mpe wuta mbotama na ngai,
nazalaki kolakisa nzela na mwasi oyo akufisa mobali—
19soki namonaki mobola kokufa na kozanga bilamba
to moto akelela kozanga bilamba,
20bongo motema na ye epambolaki ngai te
na ndenge nazipaki ye na bilamba
oyo ewutaki na bibwele na ngai,
21soki natombolaki loboko na ngai mpo na kosala mwana etike mabe,
wana nayebaki ete nazali na nguya liboso ya basambisi,
22tika ete loboko na ngai elongwa na lipeka na ngai
to ebukana !
23Pamba te nazalaki kobanga etumbu ya Nzambe,
mpe nakokaki te kosala eloko liboso ya lokumu na Ye.
24Soki natiaki elikya na ngai na wolo
to nalobaki na wolo ya kitoko : ‹ Ozali ekimelo na ngai, ›
25soki nasepelaki na ebele ya bozwi na ngai,
bomengo oyo maboko na ngai esalaki,
26soki natalaki moyi na kongenga na yango
to sanza kotambola na nkembo,
27soki motema na ngai ekosamaki na nkuku,
mpe maboko na ngai epesaki yango beze ya lokumu,
28wana elingaki lisusu kozala mbeba oyo ebongi
na esambiselo ya basambisi,
pamba te nalingaki kowangana Nzambe oyo azali na Likolo.
29Soki nasepelaki na pasi ya monguna na ngai
to nagangaki na esengo na likama oyo ekomelaki ye,
30soki napesaki nzela na monoko na ngai
ete esala lisumu na kosenga kufa ya monguna na ngai
na nzela ya maloba ya kolakela mabe;
31soki bato ya libota na ngai balobaka te :
‹ Nani oyo atondaki te na misuni ya banyama ya Yobo ? ›
32Soki mopaya moko te alalaki libanda,
pamba te ekuke na ngai ezalaki ya kofungwama
tango nyonso mpo na moleki nzela,
33soki nabombaki lisumu na ngai ndenge Adamu asalaki
to nabombaki yango na motema na ngai,
34pamba te nabangaki bato
mpe nabangaki ete mabota etiola ngai,
yango wana nakangaki monoko
mpe nakokaki kobima libanda te !
35Ah, soki nazalaki ata na moto
oyo akokaki koyoka ngai !
Yango nde sik’oyo liloba na ngai ya suka.
Tika ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayanola ngai !
Tika ete moto oyo afundi ngai akoma na mokanda
makambo oyo afundeli ngai !
36Solo, nalingaki komema yango na lipeka na ngai,
nalingaki kolata yango lokola motole,
37nalingaki kotalisa Ye makambo nyonso oyo nasalaki,
nalingaki kopusana pene na Ye lokola mokambi.—
38Soki mabele na ngai eboyi ngai,
soki mikala na yango elelaki,
39soki naliaki bambuma na yango na ofele
to soki natungisaki bankolo na yango,
40tika ete banzube ebima na esika ya ble,
mpe matiti mabe ebima na esika ya orje. »
Oyo nde suka ya maloba ya Yobo.
Currently Selected:
Yobo 31: MNB
Tya elembo
Copy
Kokisana
Kabola
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.