Yobo 20
20
Maloba ya mibale ya Tsofari
1Tsofari, moto ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki :
2« Makanisi na ngai ezali kotinda ngai ete nayanola,
nakoki kovanda nye te,
pamba te motema na ngai ekomi likolo-likolo.
3Nazali koyoka maloba mabe,
maloba oyo eyokisi ngai soni !
Kasi mayele na ngai elakisi ngai maloba ya kozongisa.
4Solo, oyebi malamu ete wuta kala,
wuta tango batia moto na likolo ya mabele,
5elonga ya bato mabe ezalaka ya tango moke,
mpe esengo ya moto oyo azangi boyengebene
ewumelaka kaka mwa tango moke.
6Ata molayi na ye emati kino likolo
mpe moto na ye etuti mapata,
7akobebisama libela lokola nyei na ye,
mpe bato oyo bakomona ye bakoloba : ‹ Azali wapi ? ›
8Abungaka lokola ndoto, mpe bakomona ye lisusu te,
alimwaka lokola na ndoto ya butu.
9Liso oyo ezalaki kotala ye ekomona ye lisusu te,
esika oyo azalaki kovanda ekomona ye lisusu te,
10bana na ye basengeli kofuta lomande epai ya babola,
maboko na ye ekozongisa bozwi oyo abotolaki,
11mikuwa na ye oyo ezalaki makasi na bolenge
ekolala elongo na ye kati na putulu.
12Soki mabe ezali sukali na monoko na ye
mpe abombi yango na se ya lolemo na ye,
13soki ameki elengi na yango mpe atiki yango te,
soki abombi yango na se ya minu na ye,
14bilei na ye ekobongwana kati na libumu na ye,
ekokoma lokola ngenge ya nyoka kati na ye.
15Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango ;
Nzambe akofutisa ye yango.
16Akofiba ngenge ya nyoka,
lolemo ya etupa ekoboma ye.
17Akomona lisusu te mayi mike, miluka, bibale,
mayi oyo etiolaka makasi elongo na mafuta ya nzoyi mpe miliki ;
18akozongisa bambuma ya mosala na ye mobimba,
akomela ata moko te,
akotikala kosepela te na litomba
oyo azwaki na mombongo na ye.
19Pamba te anyokolaki babola
mpe atikaki bango lokola bato bazangela,
abotolaki ndako ya bato
na esika ya kotonga ndako na ye moko.
20Solo, lokoso na ye ya kozwa mingi ekosila te,
akoki komibikisa te na nzela ya bomengo na ye.
21Ayebaki te kopekisa lokoso ya libumu na ye,
yango wana bomengo na ye mpe ekowumela te.
22Wana azali kati na bomengo, pasi ekokomela ye,
kilo nyonso ya pasi ekokweyela ye.
23Wana azali kotondisa libumu na ye,
Nzambe akosopela ye kanda makasi na Ye,
mpe ekonokela ye lokola bilei.
24Ata akimi liboso ya ebundeli ya ebende,
mbanzi ya bronze ekotobola ye ;
25soki abimisi songe ya mbanzi yango na libale na ye
elongo na makila ya mbuma-mbuma,
somo ekoyela ye.
26Molili makasi ezali kozela libula na ye,
moto makasi oyo moto apelisi te ekozikisa ye
elongo na biloko oyo ekotikala kati na ndako na ye.
27Likolo ekobimisa polele mabe na ye,
mabele ekotelemela ye ;
28mayi ekomema ndako na ye
mpe biloko nyonso ya ndako na ye,
na mokolo ya kanda ya Nzambe.
29Yango nde lifuti oyo Nzambe abongisi
mpo na moto mabe,
libula oyo Nzambe alaki ye. »
Currently Selected:
Yobo 20: MNB
Tya elembo
Copy
Kokisana
Kabola
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.