Ezekieli 32
32
Nzembo ya mawa na tina na Faraon
1Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na mibale, na mobu ya zomi na mibale, Yawe alobaki na ngai :
2« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa mpo na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe yebisa ye :
‹ Ozali lokola nkosi kati na bikolo,
ozali lokola dalagona kati na bibale minene,
otambolaka-tambolaka kati na bibale na yo,
opanzaka mayi na makolo na yo
mpe okomisaka bibale potopoto.
3Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Nakotiela yo motambo na Ngai
tango nakosangisa bato ya bikolo ebele ;
boye bakokanga yo na motambo yango.
4Nakobwaka yo na mabele
mpe nakosundola yo na libanda ya bilanga.
Nakosala ete bandeke nyonso ya likolo eya komatela yo
mpe banyama ya mokili mobimba eya kolia
misuni ya nzoto na yo.
5Nakopanza misuni ya nzoto na yo na bangomba
mpe nakotondisa mabwaku na biteni oyo ekotikala.
6Nakotondisa mokili,
na makila oyo ekowuta epai na yo,
na balabala nyonso kino na bangomba ;
mpe mabulu minene ekotonda na misuni ya nzoto na yo.
7Tango nakoboma yo ndenge babomaka mwinda,
nakozipa likolo, nakokomisa molili minzoto na yango ;
nakozipa moyi na mapata,
mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te.
8Likolo na yo,
nakokomisa molili biloko nyonso ya likolo,
oyo ebimisaka pole,
mpe nakoyeisa molili na mokili na yo,
elobi Nkolo Yawe.
9Nakotungisa mitema ya bato ebele
tango nakomema yo na bowumbu
kati na bikolo ya bapaya,
na mikili oyo otikala kutu koyeba te.
10Nakosala ete bato ya bikolo ebele bakamwa yo
mpe bakonzi na bango balenga na somo likolo na yo
tango nakolakisa bango mopanga na Ngai.
Na mokolo ya kokweya na yo,
moko na moko kati na bango akokoma kolenga
tango nyonso mpo na bomoi na ye.
11Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :
Mopanga ya mokonzi ya Babiloni
ekobundisa yo.
12Nakosala ete bato ebele bakufa kati na yo
na mopanga ya bilombe ya bitumba
ya ekolo oyo eleki bikolo nyonso na kanza.
Bakosukisa lolendo ya mokili ya Ejipito
mpe bato na yango nyonso bakobebisama.
13Nakoboma ngombe na yango nyonso
pembeni ya mayi ya mozindo oyo ekoningana lisusu te
na makolo ya bato to ya banyama.
14Bongo nakosala ete mayi na yango evanda kimia
mpe bibale na yango etiola lokola mafuta,
elobi Nkolo Yawe.
15Tango nakosala ete Ejipito etikala lisusu na bato te,
tango nakobebisa biloko nyonso
oyo ezali kati na yango
mpe nakoboma bavandi na yango nyonso ;
boye bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
16Yango nde nzembo ya mawa oyo bakoyembela Ejipito ; bilenge basi ya bikolo mosusu nde bakoyemba yango, bakoyemba yango na tina na Ejipito elongo na bato na yango nyonso, elobi Nkolo Yawe. »
17Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza wana kaka, na mobu ya zomi na mibale, Yawe alobaki na ngai :
18« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na bato nyonso ya Ejipito mpe kitisa na mokili ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu, mokili ya Ejipito elongo na bato ya bikolo ya nguya. 19Loba na bango : ‹ Boni, boleki bato mosusu na nini ? Bokita mpe bolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te ! › 20Bakokweya kati na bato oyo bakufaki na mopanga.
Mopanga esili kobima !
Tika ete eboma Ejipito mpe bato na yango nyonso !
21Wuta na mboka ya bakufi,
bankumu bakoloba na Ejipito
mpe na bikolo oyo esanganaki na yango :
‹ Bakiti mpe balali elongo na bato
oyo bakatama ngenga te,
esika moko na bato oyo bakufaki na mopanga. ›
22Mokili ya Asiri ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, ezingelami na malita ya bato na yango nyonso oyo babomaki : bango nyonso oyo bakufaki na mopanga. 23Malita na bango ezali kati na libulu moko ya mozindo, mpe mampinga na yango elali zingazinga ya bakunda na ye. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo na mokili ya bato ya bomoi basili kokweya, bakufi na mopanga.
24Mokili ya Elami ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango ; bato na yango nyonso bakweyaki, bakufaki na mopanga. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo kati na mokili ya bato ya mokili yango basili kokita elongo na bato oyo bakatama ngenga te, na mokili ya bakufi ; bakoyoka soni bango moko elongo na bato oyo bakitaka na libulu. 25Basalaki mbeto moko mpo na mokili yango kati na bato oyo bakufaki na mopanga, esika moko na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango. Bato nyonso oyo bakufaki na mopanga bazalaki bato bakatama ngenga te. Lokola somo na bango epanzanaki na mokili ya bato ya bomoi, bamemaki soni na bango elongo na bato oyo bakitaka na libulu ; bazali kolala esika moko na bato oyo babomaki na mopanga.
26Mokili ya Mesheki mpe ya Tubali ezali kuna elongo na bato na yango nyonso, zingazinga ya malita na yango. Bato nyonso oyo bakufaki na mopanga bazalaki bato bakatama ngenga te, pamba te bayeisaki somo makasi kati na mokili ya bato ya bomoi. 27Boni, balali te esika moko na basoda mosusu oyo bakatama ngenga te to balali te esika moko na basoda ya mpiko oyo bakufaki mpe bakitaki na mboka ya bakufi na bibundeli na bango, na mipanga na bango na se ya mito na bango ? Etumbu mpo na masumu na bango ekweyaki na mikuwa na bango, atako bazalaki kolengisa basoda ya mpiko ya mokili ya bato ya bomoi na somo.
28Oh Faraon, yo mpe okobukana, okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, bato oyo bakufaki na mopanga !
29Mokili ya Edomi ezali kuna, bakonzi na yango mpe bakambi na yango balali esika moko na bato oyo bakufaki na mopanga atako bazalaki na nguya ; balali esika moko na bato oyo bakatama ngenga te mpe bato oyo bakitaka na libulu.
30Bakambi nyonso ya etuka ya nor mpe bato nyonso ya Sidoni bazali kuna ; bakitaki na soni elongo na bato oyo bakufaki atako nguya na bango ezalaki kopesa bato somo makasi ; balali lokola bato bakatama ngenga te elongo na bato oyo bakufaki na mopanga, mpe bakufaki na soni makasi elongo na bato oyo bakitaka na libulu.
31Ye Faraon elongo na mampinga na ye nyonso bakomona bango mpe bakobondisama na tina na bato nyonso oyo bakufaki na mopanga, elobi Nkolo Yawe. 32Atako nayeisaki somo na mokili ya bato ya bomoi na nzela na ye, Faraon mpe bato na ye nyonso bakolala kati na bato oyo bakatama ngenga te, bato oyo bakufa na mopanga, elobi Nkolo Yawe. »
Currently Selected:
Ezekieli 32: MNB
Tya elembo
Copy
Kokisana
Kabola
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.