Ezekieli 19
19
Loyembo ya mawa mpo na bakonzi ya Isalaele
1« Bongo yo, tinda nzembo ya mawa mpo na bakambi ya Isalaele mpe loba :
2‹ Mama na yo azalaki nani ?
Nkosi ya mwasi kati na bankosi !
Ezalaki kovanda kati na bana na yango
mpe kobokola bana yango.
3Ekolisaki moko kati na bana na yango,
mpe mwana yango ekomaki nkosi moko ya makasi.
Bongo, eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.
4Bato ya bikolo ya bapaya bayokaki sango na yango
mpe bakangaki yango na mitambo ya mabulu ;
bakangaki yango bibende na zolo
mpe bamemaki yango na mokili ya Ejipito.
5Tango mama ya nkosi yango emonaki
ete elekisi tango ya pamba mpo na kozela
mpe elikya na yango esili,
ekamataki mwana mosusu kati na bana na yango,
ekomisaki yango mpe nkosi ya makasi.
6Ekomaki konguluma kati na bankosi,
pamba te yango mpe ekomaki nkosi ya makasi.
Eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.
7Ekweyisaki bandako na bango ya makasi
mpe ebebisaki bingumba na bango.
Soki egangi, mokili mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna
bazalaki kotondisama na somo.
8Bongo bato ya bituka ya zingazinga,
longwa na bikolo na bango,
bayaki kotelemela yango,
batielaki yango mitambo na bango
mpe bakangaki yango kati na mabulu na bango.
9Bakangaki yango minyololo,
bakotisaki yango kati na ndako ya banyama,
bamemaki yango epai ya mokonzi ya Babiloni.
Babwakaki yango na boloko
mpo ete mongongo ya koganga na yango
eyokana lisusu na bangomba ya Isalaele te.
Loyembo ya mawa mpo na nzete ya vino
10Mama na yo azalaki lokola nzete ya vino
kati na elanga na yo ya vino,
oyo elonama pembeni ya mayi,
ezalaki kobota bambuma ebele,
ezalaki na bitape ebele
mpo ete mayi mpe ezalaki ebele.
11Bitape na yango ezalaki makasi,
ezalaki malamu mpo na kosala mangenda ya bokonzi,
ezalaki molayi makasi koleka banzete mosusu ;
eyebanaki makasi mpo na molayi na yango
mpe mpo na ebele ya makasa na yango.
12Kasi bapikolaki yango na kanda
mpe babwakaki yango na mabele.
Mopepe ya este ekawusaki yango,
ekweyisaki mbuma na yango,
ekawusaki mpe bitape na yango ya makasi
mpe moto etumbaki yango.
13Mpe sik’oyo baloni yango kati na esobe,
mokili oyo ekawuka mpe ezanga mayi.
14Moto ebimi longwa na moko ya bitape na yango
mpe etumbi mbuma na yango ;
ata etape moko te ya makasi etikalaki
mpo na kosala lingenda ya bokonzi. ›
Yango nde ezali nzembo ya mawa mpe esengeli koyemba yango lokola nzembo ya mawa. »
Currently Selected:
Ezekieli 19: MNB
Tya elembo
Copy
Kokisana
Kabola
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.