Mosakoli 1
1
Nyonso ezali pamba
1Maloba ya Moteyi, mwana mobali ya Davidi, mokonzi na Yelusalemi.
2Pamba na pamba,
elobi Moteyi ;
pamba na pamba,
nyonso ezali kaka pamba.
3Moto azwaka litomba nini penza na misala nyonso
oyo amonelaka pasi na se ya moyi ?
4Eleko moko eleki, mpe eleko mosusu eyei,
kasi mabele etikalaka kaka seko na seko.
5Moyi ebimaka mpe elalaka,
bongo ezongaka na lombangu na esika oyo ebimelaka.
6Mopepe ekeyi na ngambo ya sude,
ebaluki na ngambo ya nor,
ebaluki-baluki mpe ekeyi lisusu,
ezongelaka kaka banzela wana.
7Mayi nyonso ekendaka na ebale monene,
kasi ebale monene etondaka te ;
mpe mayi yango ezongaka lisusu epai ewutaka.
8Makambo nyonso elembisaka,
moto oyo akoki kobeta na yango tembe azali te ;
nzokande, miso etondaka te na kotala,
mpe matoyi etondaka te na koyoka.
9Oyo ezalaki ekozala lisusu,
oyo esalemaki ekosalema lisusu :
likambo ya sika ezalaka te na se ya moyi.
10Boni, ezali penza na likambo moko
oyo moto akoki koloba na tina yango :
« Tala, oyo penza ezali likambo ya sika ? »
Te, esila komizalela kala,
kala penza liboso ya eleko na biso.
11Ndenge bato bayebaka lisusu bato ya kala te,
ndenge wana mpe bato oyo bakoya sima
bakotikala koyeba bango te na bato oyo bakolanda.
Bwanya mpe ezali kaka pamba
12Ngai, Moteyi, nazalaki mokonzi ya Isalaele, na Yelusalemi. 13Namipesaki mpo na koyekola mpe kososola na nzela ya bwanya, makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi. Nzokande, ezali na yango kaka mosala ya mpunda oyo Nzambe apesa na bana ya bato mpo ete bamonela yango pasi ! 14Namona misala nyonso oyo esalemaka na se ya moyi ; nyonso wana ezali kaka pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
15Bakoki te kosembola eloko oyo etengama,
bakoki mpe te kotanga eloko oyo ezali te.
16Namilobelaki : « Tala, nakolisi mpe nabakisi bwanya mingi koleka moto nyonso oyo azalaki liboso na ngai, na Yelusalemi. » Motema na ngai etondaki penza na bwanya mpe na boyebi ebele. 17Namipesaki makasi mpo na koyekola bwanya mpe, lisusu, makambo ya bozoba mpe ya liboma ; kasi nasosolaki ete yango mpe ezali kaka lokola moto azali kolanda mopepe.
18Pamba te kozala na bwanya mingi ememelaka moto pasi,
mpe kozala na mayele mingi etungisaka motema.
Currently Selected:
Mosakoli 1: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.