Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Deteronomi 32

32
1Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba !
Oh mabele, yoka malamu maloba ya monoko na ngai !
2Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula,
mpe maloba na ngai ekita lokola londende,
lokola mvula moke na likolo ya matiti,
lokola mvula makasi na likolo ya milona !
3Nakosakola Kombo ya Yawe.
Bokumisa monene ya Nzambe na biso !
4Yawe azali lokola Libanga ;
misala na Ye ezali ya kokoka,
mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ;
azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ;
azali sembo mpe alima.
5Kasi bino, bomibebisaki liboso na Ye ;
bozali lisusu bana na Ye te, mpo na mabe na bino,
bino molongo ya bana mabe mpe ya bapengwi.
6Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe ?
Oh bato ya maboma, bato bazanga bwanya !
Boni, Yawe azali Tata na bino te ?
Azali Mokeli na bino te ?
Ye nde asalaki bino mpe abongisaki bino.
7Bokanisa mikolo ya kala,
mpe botala milongo oyo eleka kala !
Botuna na batata na bino, mpe bakoyebisa bino.
Botuna na bampaka na bino, mpe bakolimbolela bino.
8Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki
na ekolo moko na moko mabele na yango,
tango akabolaki bato nyonso,
atiaki bandelo mpo na bato
kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe.
9Pamba te eteni ya Yawe ezali bato na Ye ;
Jakobi azali libula na Ye.
10Amonaki ye na esobe,
kati na mokili oyo ekawuka,
etonda na koganga ya somo.
Azingelaki ye, abatelaki ye,
akengelaki ye lokola mbuma ya liso na Ye.
11Azali lokola mpongo
oyo ezali kolakisa bana na yango kopumbwa.
Epumbwaka pembeni-pembeni ya bana na yango,
etandaka mapapu na yango mpo na kokanga bana na yango,
mpe ememaka yango likolo ya masala na yango.
12Ye moko Yawe akambaki bango ;
nzambe moko te ya bapaya azalaki elongo na Ye.
13Akambaki bango na bisika oyo eleki likolo kati na mokili,
aleisaki bango bambuma ya elanga,
amelisaki bango mafuta ya nzoyi oyo ezalaki kobima na libanga,
mafuta oyo ezalaki kobima na mabele ya mabanga,
14miliki ya bangombe mpe ya bameme ;
apesaki bango mafuta ya bameme mpe ya bantaba,
ya bana meme mpe ya ntaba ya mafuta ;
mpe apesaki bameme ya mibali ya kitoko ya Bashani.
Baliaki lisusu ble oyo eleki kitoko,
bamelaki vino ya motane oyo ewutaki na bambuma ya vino.
15Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi ;
atondaki na biloko ya kolia, akomaki kilo mpe moselu ;
asundolaki Nzambe oyo akelaki ye
mpe abwakaki Libanga na ye, Mobikisi na ye.
16Bapesaki Yawe kanda makasi
likolo ya banzambe na bango ya bapaya,
mpe bapesaki Ye kanda na nzela ya misala na bango ya mbindo.
17Babonzaki bambeka epai ya milimo mabe
oyo ezali Nzambe te ;
babonzaki yango epai ya banzambe oyo bango bayebaki te,
banzambe oyo ebimaki sika,
banzambe oyo bakoko na bino basambelaki te.
18Bobosanaki Libanga oyo ebotaki bino
mpe bomonaki pamba Nzambe oyo apesaki bino bomoi.
19Yawe amonaki likambo oyo mpe abwakaki bango,
pamba te bana na bango ya mibali mpe ya basi bapesaki Ye kanda.
20Alobaki : « Nakobombela bango elongi na Ngai,
mpe nakotala ndenge nini suka na bango ekozala,
pamba te bazali molongo ya bato mabe,
bana bazanga boyengebene.
21Bazwelaki Ngai mbanda oyo azali ata nzambe te,
batumbolaki kanda na Ngai likolo ya biloko
oyo ekoki kutu kozala ata banzambe ya bikeko te.
Boye, Ngai mpe nakosala ete bango mpe
bayokela oyo ezali ata ekolo te zuwa ;
nakosala ete ekolo moko ya bazoba epesa bango kanda.
22Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto,
mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi,
ekotumba mabele, bambuma na yango
mpe miboko ya bangomba.
23Nakobakisela bango pasi likolo ya pasi,
nakobwakela bango makonga na Ngai.
24Nakotindela bango nzala makasi,
bokono oyo esalaka nzoto moto-moto
mpo ete esilisa bango,
mpe etumbu oyo ekoboma bango.
Nakotindela bango minu ya banyama ya zamba,
ngenge ya nyoka oyo etambolaka na libumu.
25Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana ;
kati na bandako na bango, somo ekokonza ;
bilenge mibali mpe bilenge basi,
bana mike mpe bampaka, bango nyonso bakokufa.
26Nalobaki : Nakopanza bango
mpe nakosala ete bato babosana bango.
27Kasi nazali kobanga ete banguna bafinga Ngai
mpe bayini na bango bamikosa te na koloba :
‹ Tolongaki na makasi na biso moko,
Yawe asalaki eloko moko te. › »
28Bato oyo bazali ekolo ezanga mayele,
bazali na bososoli te kati na bango.
29Soki kaka bazalaki bato ya bwanya,
balingaki kososola likambo oyo
mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala !
30Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko,
to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomi
soki Libanga na bango atekaki bango te
to soki Yawe asundolaki bango te ?
31Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te ;
bango moko banguna na biso bayebi yango.
32Bilanga na bango ya vino ewuti
na bilanga ya vino ya Sodome mpe na bilanga ya Gomore.
Bambuma na bango etondi na ngenge,
mpe maboke ya bambuma na bango ezali bololo.
33Vino na bango ezali ngenge ya banyoka,
ngenge ya etupa, ngenge oyo ebomaka.
34« Boni, ebombami epai na Ngai te ?
Ekangami te lokola elembo na bomengo na Ngai ?
35Ngai nde nazongisaka mabe na mabe,
Ngai nde nakofuta moto na moto.
Tango lokolo na bango ekobeta libaku,
na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu,
mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala
mpo na bango ekowumela te. »
36Yawe akosambisa bato na Ye,
mpe akoyokela basali na Ye mawa ;
tango akomona ete makasi na bango esili,
mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko te
oyo bakoki kokanga to kokangola.
37Bongo akoloba : « Wapi banzambe na bango ?
Wapi libanga epai wapi babombamaki ?
38Wapi banzambe oyo ezalaki kolia mafuta ya bambeka na bango
mpe komela makabo na bango ya vino ?
Tika ete etelema mpo na kosalisa bino
mpe kopesa bino ebombamelo !
39Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ;
mosusu azali te !
Nabomaka mpe napesaka bomoi ;
nazokisaka mpe nabikisaka.
Mpe moto moko te akoki kokangola
oyo ezali na maboko na Ngai.
40Natomboli loboko na Ngai na likolo,
mpe nalobi : Na Kombo na Ngai,
41tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai,
mpe loboko na Ngai ekosimba yango mpo na kosambisa,
nakozongisa mabe na mabe epai ya bayini na Ngai,
mpe nakofuta ba-oyo balingaka Ngai te.
42Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato,
nakolangwisa makonga na Ngai na makila
ya bato oyo babomi, ya bakangami
mpe ya mito ya bakonzi ya banguna. »
43Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye !
Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ;
pamba te akozongisa mabe na mabe
mpo na makila ya basali na Ye,
akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye
mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu
mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye.
44Moyize ayaki mpe alobaki maloba nyonso ya nzembo oyo, mpe bato nyonso bazalaki koyoka ye ; azalaki elongo na Oze, mwana mobali ya Nuni.
45Tango Moyize asilisaki koloba maloba oyo nyonso epai ya bana nyonso ya Isalaele, 46alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo. 47Ezali maloba ya pamba te epai na bino, kasi ezali nde bomoi na bino. Ezali na nzela na yango nde bokozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »
Yawe asakoli kufa ya Moyize
48Na mokolo wana kaka, Yawe alobaki na Moyize : 49« Mata na ngomba Abarimi, ngomba Nebo oyo ezali kati na Moabi mpe etalana na Jeriko ; mpe tala mokili ya Kanana, mokili oyo nazali kopesa epai ya bana ya Isalaele lokola libula na bango. 50Okokufa na ngomba oyo okomata ; mpe kuna, okokende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ndenge Aron, ndeko na yo ya mobali, akufaki na ngomba Ori mpe akutanaki na bakoko na ye, 51pamba te bino mibale botambolaki te na boyengebene liboso na Ngai, na miso ya bana ya Isalaele, na mayi ya Meriba, pembeni ya Kadeshi, kati na esobe ya Tsini, mpe bobatelaki te bosantu na Ngai kati na bana ya Isalaele. 52Yango wana okomona mokili yango kaka na mosika, okokota te na mokili oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. »

Currently Selected:

Deteronomi 32: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo