Amosi 8
8
Kitunga ya bambuma etela
1Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai : kitunga etonda na bambuma etela. 2Atunaki ngai :
— Amosi, ozali komona nini ?
Nazongisaki :
— Nazali komona kitunga etonda na bambuma etela.
Yawe alobaki na ngai :
— Tango ekoki mpo na bato na Ngai, Isalaele ;
pamba te nakolimbisa bango lisusu te.
3Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako
ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe.
Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai
mpe bakosalela bango matanga te.
Bato ya mombongo ya lokoso
4Boyoka makambo oyo,
bino bato oyo bonyokolaka bato bakelela
mpe bonyataka babola kati na mokili.
5Bozali koloba : « Feti ya ebandeli ya sanza ekoleka tango nini
mpo ete toteka ble na biso ?
Tango nini mokolo ya Saba ekosila
mpo ete tofungola bibombelo na biso ya ble ? »
Tokosalela bakopo ya mike
mpo ete tomatisa talo,
mpe tokosalela bimekelo ya lokuta.
6Tokosomba mobola na palata
mpe moto akelela na motuya ya mapapa mibale,
bongo tokoteka ata basalite ya ble.
7Mpo na lolendo ya Jakobi,
Yawe alapi ndayi na maloba oyo :
« Nakobosana misala na bango ata moko te.
8Mpo na yango, mokili ekolenga,
mpe bato na yango nyonso bakozala na matanga.
Mokili mobimba ekotomboka lokola ebale Nili
oyo etondi na mayi ;
ekokoma koningana-ningana
mpe ekokita lokola ebale ya Ejipito.
Mokolo ya matanga
9Na mokolo wana, »
elobi Nkolo Yawe,
« nakosala ete moyi elala na midi,
mpe nakoyeisa molili na mokili na moyi makasi.
10Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga,
banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa.
Nakosala ete bino nyonso bolata basaki,
mpe bakokokola bino suki ya moto.
Nakoyeisa matanga kati na mokili
lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa
mwana se moko oyo bazalaki na ye,
mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.
11Na mikolo ekoya, »
elobi Nkolo Yawe,
« nakotinda nzala makasi kati na mokili ;
ekozala te nzala ya bilei to posa ya mayi,
kasi ekozala nzala ya koyoka Liloba na Yawe.
12Bato bakotelengana na bibale nyonso,
bakoyengayenga longwa na nor kino na este
mpo na koluka Liloba na Yawe,
kasi bakotikala komona yango te.
13Na mokolo wana,
bilenge basi ya kitoko mpe mibali ya makasi bakokufa
na posa ya mayi.
14Bato oyo balapaka ndayi na kombo ya nzambe
ya ekeko ya Samari mpe balobaka :
‹ Dani, lokola nzambe na yo azali na bomoi ›
to ‹ lokola nzambe ya Beri-Sheba azali na bomoi, ›
bakokweya mpe bakotelema lisusu te. »
Currently Selected:
Amosi 8: MNB
Tya elembo
Kabola
Kokisana
Copy
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.