2 Masolo ya Kala 14
14
Asa, mokonzi ya Yuda
(1Ba 15.11-12)
1Asa asalaki makambo ya malamu mpe ya sembo na miso ya Yawe, Nzambe na ye.
2Alongolaki bitumbelo ya banzambe ya bapaya mpe bisambelo ya likolo ya bangomba, abukaki makonzi ya bule ya banzambe ya bikeko mpe akweyisaki makonzi ya bikeko ya nzambe mwasi Ashera. 3Apesaki mitindo na bato ya Yuda ete baluka Yawe, Nzambe ya batata na bango, mpe batosa mibeko mpe malako na Ye.
4Kati na bingumba nyonso ya Yuda, mokonzi Asa alongolaki bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo malasi. Boye, na tango na ye, mokili ezalaki na kimia.
5Atongaki bingumba makasi kati na Yuda mpo ete mokili ezalaki na kimia. Na mibu wana, moto moko te abundisaki ye, pamba te Yawe apesaki ye bopemi. 6Alobaki na Yuda : « Totonga bingumba oyo, tozingela yango na bamir, na bandako milayi mpe na bikuke elongo na bikangelo na yango. Mokili ezali kati na bopemi liboso na biso, pamba te tolukaki Yawe, Nzambe na biso ; tolukaki Ye, mpe Ye apesi biso bopemi na bangambo nyonso. »
Boye, batongaki mpe balongaki na mabongisi na bango.
7Asa azalaki na mampinga ya basoda nkoto nkama misato ya bato ya Yuda, oyo bazalaki komema banguba minene mpe makonga, mpe ya basoda nkoto nkama mibale na tuku mwambe ya bato ya Benjame, oyo bazalaki komema banguba mike mpe kobeta matolotolo : bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba. 8Zera, moto ya Kushi, elongo na mampinga ya basoda monkoko moko mpe bashar nkama misato, abundisaki mampinga ya Asa mpe akomaki kino na Maresha. 9Asa abimelaki ye, mpe batandamaki na molongo ya bitumba na se ya Tsefata, pene ya Maresha. 10Asa abelelaki Yawe, Nzambe na ye ; alobaki :
« Oh Yawe, moko te akokani na Yo, moko te akoki kosunga moto ya bolembu liboso ya moto na nguya.
Oh Yawe, Nzambe na biso, sunga biso ! Pamba te totiaka elikya na biso kati na Yo. Ezali na Kombo na Yo nde toyaki kobundisa mampinga oyo ya monene.
Oh Yawe, ozali Nzambe na biso ! Tika ete moto alonga Yo te ! »
11Yawe abetaki bato ya Etiopi liboso ya Asa mpe Yuda, mpe bato ya Etiopi bakimaki. 12Asa elongo na mampinga na ye balandaki bato ya Etiopi kino na Gerari. Bato bakufaki, bakokaki te kobikisa bomoi na bango, pamba te bango nyonso babebisamaki liboso ya Yawe mpe mampinga na Ye. Mampinga ya basoda ya Yuda bazwaki bomengo ebele ya bitumba ; 13babebisaki bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Gerari, pamba te Yawe akweyiselaki bango somo na Ye ya makasi. Bazwaki na makasi biloko kati na bingumba nyonso, pamba te biloko ya kozwa ezalaki ebele penza kati na yango. 14Babebisaki mpe bitonga ya bibwele, bamemaki bantaba mpe bameme ebele elongo na bashamo. Bongo, bazongaki na Yelusalemi.
Currently Selected:
2 Masolo ya Kala 14: MNB
Tya elembo
Copy
Kokisana
Kabola
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.