1 Masolo ya Kala 4
4
Bituka mosusu ya Yuda
1Libota ya Yuda :
Peretsi, Etsironi, Karimi, Wuri mpe Shobali.
2Reaya, mwana mobali ya Shobali, azalaki tata ya Yaati, mpe Yaati azalaki tata ya Awumayi mpe ya Laadi.
Bango nde bazalaki bakoko ya bituka ya bato ya Tsorea.
3Tala bana mibali ya Etami :
Jizireyeli, Yishima mpe Yidibashi.
Kombo ya ndeko na bango ya mwasi ezalaki Atseleliponi.
4Penueli azalaki tata ya Gedori, mpe Ezeri azalaki tata ya Usha.
Bango nde bazalaki bakitani ya Wuri, mwana liboso ya Efrata, tata ya Beteleemi.
5Ashiwuri, tata ya Tekoa, azalaki na basi mibale : Eleya mpe Nara.
6Nara abotelaki ye bana mibali oyo :
Awuzami, Eferi, Temeni mpe Ahashitari.
7Eleya abotelaki ye bana mibali oyo :
Tsereti, Tsoari mpe Etinani.
8Kotsi azalaki tata ya Anubi mpe Atsobeba, mpe koko ya mabota ya Aareyeli, mwana mobali ya Arumi.
9Yaebetsi azalaki na lokumu mingi koleka bandeko na ye ya mibali. Mama na ye apesaki ye kombo « Yaebetsi » mpo na koloba : « Nabotaki yo na pasi. » 10Yaebetsi abelelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele ; alobaki : « Oh Yawe ! Soki okoki kopambola ngai mpe koyeisa mabele na ngai monene ! Tika ete loboko na Yo ezala likolo na ngai ! Bomba ngai mosika ya mabe mpo ete namona pasi te. » Mpe Nzambe ayanolaki libondeli na ye.
11Kelubi, ndeko mobali ya Shuwa, azalaki tata ya Meyiri oyo azalaki tata ya Eshitoni. 12Eshitoni azalaki tata ya Beti-Rafa, Paseya mpe Teyina oyo atongaki engumba Naashi. Bango nde bazalaki kovanda na engumba Reka.
(Bil 1.13)
13Bana mibali ya Kenazi :
Otinieli mpe Seraya.
Bana mibali ya Otinieli :
Atati mpe Meonotayi.
14Meonotayi abotaki Ofira.
Seraya abotaki Joabi, tata ya Ge-Arashimi. Bazalaki kobenga ye bongo, pamba te bato na ye bazalaki kosala misala ya maboko, ya kotula bibende na moto.
(Mit 13.6)
15Bana mibali ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune :
Iru, Ela mpe Naame.
Mwana mobali ya Ela :
Kenazi.
16Mwana mobali ya Yealeyeli :
Zifi, Zifa, Tiria mpe Asareli.
17Bana mibali ya Esidrasi :
Yeteri, Meredi, Eferi mpe Yaloni. Moko kati na basi ya Meredi abotaki Miriami, Shamayi mpe Yishiba, tata ya Eshitemoa. 18Mwasi na ye, moto ya Yuda, abotaki Yeredi, tata ya Gedori ; Eberi, tata ya Soko mpe Yekutieli, tata ya Zanoa.
Bango nde bazalaki bana mibali ya Bitiya, mwana mwasi ya Faraon, oyo Meredi abalaki.
19Bana mibali ya mwasi ya Odia, ndeko mwasi ya Naami :
tata ya Keila, moto ya Garima ; mpe Eshitemoa, moto ya mboka Maakati.
20Bana mibali ya Simona :
Aminoni, Rina, Beni-Anani mpe Tiloni.
Bana mibali ya Yisheyi :
Zoeti mpe Beni-Zoeti.
21Bana mibali ya Shela, mwana mobali ya Yuda :
Eri, tata ya Leka ; Laeda, tata ya Maresha ; mpe mabota ya basali bilamba ya lino, na Beti-Asheba.
22Yokimi, bato ya Kozeba, Joasi mpe Sarafi oyo bazalaki bakambi kati na Moabi mpe engumba Yashubi-Leemi. Nyonso oyo ezali makambo ya kala. 23Bazalaki basali mbeki oyo bazalaki kovanda na Netayimi mpe na Gedera ; batikalaki kuna mpo na kosalela mokonzi.
Libota ya Simeoni
(Ebl 46.10; Mit 26.12-13)
24Bana mibali ya Simeoni :
Nemueli, Yamini, Yaribi, Zera ; Saulo, tata ya Shalumi ;
25Shalumi, tata ya Mibisami ; Mibisami, tata ya Mishima.
26Bana mibali ya Mishima :
Amueli, Zakuri mpe Shimei. 27Shimei azalaki na bana mibali zomi na motoba mpe bana basi motoba ; kasi bandeko na ye ya mibali babotaki bana mingi te, yango wana etuka na bango ezalaki na bato ebele te lokola libota ya Yuda.
(Joz 19.1-8)
28Bazalaki kovanda na Beri-Sheba, na Molada, na Atsari-Shuwali, 29na Bila, na Etsemi, na Toladi, 30na Betweli, na Orima, na Tsikilagi, 31na Beti-Marikaboti, na Atsari-Suzimi, na Beti-Birei mpe na Shaarayimi : nyonso oyo ezalaki bingumba na bango kino na tango ya bokonzi ya Davidi. 32Tala bingumba mitano mike oyo ezalaki zingazinga na yango : Etami, Ayini, Rimoni, Tokeni mpe Ashani ; 33bakisa bamboka mike mosusu oyo ezingelaki bingumba yango kino na Baalati. Oyo nde ezalaki bisika na bango ya kovanda mpe molongo ya mbotama ya bakoko na bango.
34Meshobabi ; Yamileki ;
Yosha, mwana mobali ya Amatsia ; 35Joeli ; Jewu, mwana mobali ya Yoshibia, mwana mobali ya Seraya, mwana mobali ya Asieli ;
36Eliowenayi ; Yakoba ; Yeshoaya ;
Asaya ; Adieli ; Yesimieli ; Benaya ;
37Ziza, mwana mobali ya Shifeyi, mwana mobali ya Aloni, mwana mobali ya Yedaya, mwana mobali ya Shimiri, mwana mobali ya Shemaya.
38Bato oyo batangamaki na bakombo bazalaki bakambi ya bituka na bango.
Mabota na bango ekomaki minene 39mpe bakendeki na zingazinga ya Gedori, na ngambo ya este ya lubwaku, mpo na koluka matiti ya koleisa bibwele na bango. 40Bakutaki kuna : matiti kitoko mpo na koleisa bibwele, mokili moko ya monene, ya kimia mpe ezanga mobulu. Bato oyo bazalaki kovanda kuna na tango ya kala, bazalaki bakitani ya Cham. 41Na tango Ezekiasi azalaki mokonzi ya Yuda, bato oyo bakombo na bango ekomami, bakomaki na mokili yango. Babundisaki bakitani ya Cham mpe babebisaki bandako na bango ; mpe lisusu, basilisaki koboma bato ya Mewuni oyo bazalaki kovanda kuna, ndenge yango ezali komonana lelo. Na sima, bavandaki na bisika na bango, mpo ete mokili yango ezalaki na matiti mpo na koleisa bibwele na bango. 42Bato ya Simeoni nkama mitano oyo bakambamaki na Pelatia, na Nearia, na Refaya mpe na Uzieli, bana mibali ya Yisheyi, babotolaki na makasi mokili ya bangomba Seiri, 43babomaki ndambo ya bato ya Amaleki oyo batikalaki mpe bavandaki kuna kino lelo.
Currently Selected:
1 Masolo ya Kala 4: MNB
Tya elembo
Copy
Kokisana
Kabola
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.