1 Masolo ya Kala 23
23
Balevi
1Tango Davidi akomaki mobange makasi, akomisaki Salomo, mwana na ye ya mobali, mokonzi ya Isalaele. 2Asangisaki bakambi nyonso ya Isalaele elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi. 3Batangaki Balevi nyonso oyo bazalaki na mibu tuku misato mpe koleka : motango nyonso ya Balevi ezalaki nkoto tuku misato na mwambe.
4Davidi alobaki : « Tika ete Balevi nkoto tuku mibale na minei bazala bakambi ya misala ya Tempelo ya Yawe, Balevi nkoto motoba bazala bakomi mikanda mpe basambisi, 5Balevi nkoto minei bazala bakengeli bikuke, mpe Balevi nkoto minei bakumisa Yawe na bibetelo mindule oyo nasalaki na tina na yango. »
6Bongo Davidi akabolaki bango na masanga kolanda buku ya mabota ya bana mibali ya Levi : Gerishoni, Keati mpe Merari.
7Mpo na libota ya Gerishoni :
Laedani mpe Shimei.
8Laedani azalaki na bana mibali misato :
mokonzi Yeyeli, Zetami mpe Joeli.
9Shimei azalaki na bana mibali misato :
Shelomiti, Azieli mpe Arani.
Bango nde bazalaki bakambi ya mabota ya Laedani.
10Shimei azalaki na bana mibali mosusu minei :
Yaati, Ziza, Yewushi mpe Beria.
11Yaati azalaki mwana ya liboso, mpe Ziza, mwana ya mibale. Nzokande Yewushi mpe Beria bazalaki na bakitani ebele te. Boye batangaki bango lokola libota moko.
12Keati azalaki na bana mibali minei :
Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
13Amirami azalaki na bana mibali mibale :
Aron mpe Moyize.
Aron aponamaki mpo na libela, elongo na bana na ye ya mibali, mpo na kobulisa Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo na kotumba mbeka ya malasi liboso ya Yawe, mpo na kosalela Ye mpe kopambola bato mpo na libela na Kombo na Ye.
14Bana ya Moyize, moto na Nzambe, batangaki bango na ekolo ya Levi.
15Bana mibali ya Moyize :
Gerishomi mpe Eliezeri.
16Bana mibali ya Gerishomi :
Shebueli azalaki mwana mobali ya liboso.
17Bana mibali ya Eliezeri :
Reabia azalaki mwana na ye se moko.
Eliezeri azalaki na bana mosusu te, kasi Reabia azalaki na bana ebele.
18Bana mibali ya Yitseari :
Shelomiti azalaki mwana ya liboso kati na bana mibali ya Yitseari.
19Bana mibali ya Ebron :
Yeriya, mwana ya liboso ; Amaria, mwana ya mibale ;
Yaazieli, mwana ya misato mpe Yekameami, mwana ya minei.
20Bana mibali ya Uzieli :
Mishe, mwana ya liboso ; mpe Yishiya, mwana ya mibale.
21Bana mibali ya Merari :
Maali mpe Mushi.
Bana mibali ya Maali :
Eleazari mpe Kishi.
22Eleazari akufaki mpe atikalaki kobota bana mibali te, azalaki kaka na bana basi oyo babalanaki na bandeko na bango, bana mibali ya tata leki na bango Kishi.
23Bana mibali ya Mushi :
Maali, Ederi mpe Yeremoti. Bango nyonso bazalaki misato.
24Bango nde bazalaki bakitani ya Levi kolanda bituka na bango, mpe bakambi ya bituka na bango kolanda ndenge bakomamaki, moto na moto, na buku ya mabota. Bazwaki mokumba ya kosala misala kati na Tempelo ya Yawe, kobanda na oyo azalaki na mibu tuku mibale mpe koleka. 25Bongo Davidi alobaki : « Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi bopemi na bato na Ye mpe avandi libela kati na Yelusalemi. 26Boye Balevi bazala lisusu te na mokumba ya komema Mongombo mpe bisalelo na yango nyonso. »
27Ezalaki kolanda malako ya suka ya Davidi nde batangaki bakitani ya Levi kobanda na mibu tuku mibale mpe koleka. 28Mosala ya Balevi ezalaki mpo na kosunga bakitani ya Aron na mosala ya Tempelo ya Yawe : kolandela bopeto ya veranda mpe ya bashambre, kopetola biloko nyonso ya bule mpe kosala misala nyonso ya Tempelo. 29Bazalaki na mokumba ya kotanda mapa na mesa, kobongisa farine mpo na makabo ya bagato ezanga levire, bagalete mpe bagato batumba na kikalungu, mpe bagato basangisa na mafuta mpe biloko nyonso oyo bamekelaka kilo mpe molayi. 30Bazalaki mpe na mokumba ya kotelema liboso ya Yawe, tongo mpe pokwa nyonso, mpo na kokumisa mpe kosanzola Ye ; 31mpe kobonza tango nyonso bambeka ya kotumba oyo bazalaki komema epai na Yawe na mikolo ya Saba, na ebandeli ya sanza mpe na mikolo nyonso ya bafeti oyo ekatama, kolanda motango oyo bakatelaki bango mpo na libela liboso ya Yawe. 32Boye Balevi bazalaki kosala mosala na bango ya kokengela Ndako ya kapo ya Bokutani mpe Esika ya bule, mpe ya kosunga bandeko na bango ya mibali, bana ya Aron, na mosala ya Tempelo ya Yawe.
Currently Selected:
1 Masolo ya Kala 23: MNB
Tya elembo
Copy
Kokisana
Kabola
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.