1 Masolo ya Kala 16
16
Esengo mpe masanzoli
1Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango, mpe babonzaki liboso ya Nzambe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. 2Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe. 3Bongo apesaki na moto nyonso ya Isalaele : lipa, gato oyo basala na bambuma ya dati mpe gato oyo basala na bambuma ya vino ya kokawuka.
4Davidi atiaki ndambo ya Balevi mpo na kosala mosala liboso ya Sanduku ya Yawe, mpo na kokanisa, mpo na kosanzola mpe mpo na kokumisa Yawe, Nzambe ya Isalaele : 5Azafi azalaki mokambi ; Zakari azalaki molandi na ye ; mpe Yeyeli, Shemiramoti, Yeyeli, Matitia, Eliabi, Benaya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli bazalaki kobeta nzenze mpe lindanda ; mpe Azafi azalaki kobeta manzanza.
6Banganga-Nzambe Benaya mpe Yaazieli bazalaki kobeta tango nyonso bakelelo liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Nzambe.
Nzembo ya matondi ya Davidi
7Ezalaki mokolo wana nde Davidi aponaki na mbala ya liboso Azafi mpe bandeko na ye, mpo ete bakumisa Yawe :
8Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye,
bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo !
9Boyemba mpo na lokumu na Ye,
bosanzola Ye na mindule !
Botatolaka tango nyonso misala minene na Ye nyonso !
10Bosepela na Kombo na Ye ya bule !
Tika ete mitema ya bato oyo balukaka Yawe
etonda na esengo !
11Bomipesa na Yawe mpe bosenga makasi na Ye !
Bolukaka tango nyonso elongi na Ye !
12Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki,
bitumbu oyo apesaki,
13bino bakitani ya Isalaele, mosali na Ye ;
bino bana mibali ya Jakobi, baponami na Ye !
14Yawe azali Nzambe na biso, mikano na Ye ekambaka mokili mobimba.
15Akanisaka tango nyonso Boyokani na Ye,
bilaka na Ye mpo na bikeke nkoto moko,
16boyokani oyo asalaki elongo na Abrayami,
mpe ndayi oyo alapaki epai ya Izaki.
17Akokisaki bosolo na yango epai ya Jakobi lokola mobeko,
epai ya Isalaele lokola boyokani ya libela na libela
18tango alobaki : « Nakopesa yo mokili ya Kanana
lokola libula oyo epesameli yo. »
19Bozalaki kaka motango moke ya bato
mpe bapaya kati na yango ;
20bozalaki koyengayenga
longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu,
longwa na mokili moko kino na mokili mosusu ;
21kasi Yawe atikaki moto moko te konyokola bango,
apamelaki bakonzi na tina na bango :
22« Bosimba bapakolami na Ngai te,
bosala mabe te epai na basakoli na Ngai. »
23Bino bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe !
Bosakolaka lobiko na Ye mokolo na mokolo !
24Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota !
Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso !
25Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu,
azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.
26Pamba te banzambe nyonso ya bikolo ezali kaka bikeko ya pamba,
nzokande Yawe nde akela likolo.
27Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye,
makasi mpe esengo ezali na esika oyo avandaka.
28Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe,
bosanzola Yawe na kopanza sango ya nkembo mpe nguya na Ye !
29Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo !
Bomema makabo mpe boya liboso na Ye,
bogumbamela Yawe mpo na kongenga ya bosantu na Ye !
30Bino, bato ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye !
Solo, mokili elendisama makasi, ekoningana te.
31Tika ete likolo esepela mpe mabele ezala kati na esengo !
Tika ete baloba kati na bikolo :
« Yawe azali mokonzi ! »
32Tika ete ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango
etia makelele ;
tika ete zamba mpe nyonso oyo ezali kati na yango
esepela !
33Boye, banzete ya zamba ekoyemba,
ekoyemba na esengo liboso ya Yawe,
pamba te Yawe azali koya kosambisa mabele.
34Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,
bolingo na Ye ewumelaka seko na seko.
35Boganga : « Oh Nzambe Mobikisi na biso, bikisa biso,
sangisa biso mpe kangola biso wuta na maboko ya bokonzi ya bikolo mosusu,
mpo ete tosanzola Kombo na Yo ya bule
mpe tosepela na mosala ya kokumisa Yo ! »
36Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko !
Bato nyonso balobaki : « Amen ! » Mpe bakumisaki Yawe !
37Davidi apesaki mokumba, epai ya Azafi mpe bandeko na ye, ya kosala mosala liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe kolanda bikateli ya mokolo na mokolo.
38Apesaki lisusu mokumba epai ya Obedi-Edomi, mwana mobali ya Yedutuni, mpe bandeko na bango, tuku motoba na mwambe, ya kosala mosala ya kokengela bikuke elongo na Osa. 39Davidi atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki mpe Banganga-Nzambe mosusu, liboso ya Mongombo ya Yawe na esambelo ya likolo ya ngomba, oyo ezalaki na Gabaoni, 40mpo na kobonza tango nyonso bambeka ya kotumba epai na Yawe, na etumbelo na yango, na tongo mpe na pokwa, kolanda bikateli oyo ekomama na mobeko oyo Yawe apesaki na Isalaele. 41Emani mpe Yedutuni bazalaki elongo na bango, mpe bamosusu oyo baponamaki na bakombo na bango mpo na kokumisa Yawe na maloba oyo : « Mpo ete bolingo na Ye ekowumela seko. » 42Emani mpe Yedutuni baponamaki mpo na kobeta bakelelo, manzanza mpe bibetelo mosusu ya mindule mpo na kobongisa banzembo na tina na lokumu ya Nzambe. Bana mibali ya Yedutuni bazalaki bakengeli bikuke.
43Bato nyonso bazongaki, moto na moto epai na ye, mpe Davidi azongaki na ndako na ye mpo na kopambola libota na ye.
Currently Selected:
1 Masolo ya Kala 16: MNB
Tya elembo
Copy
Kokisana
Kabola
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.