Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

1 Masolo ya Kala 1

1
Milongo ya mbotama
Longwa na Adamu kino na Semi
1Adamu, Seti, Enoshi, 2Kenani, Maalalele, Yeredi, 3Enoki, Metusalemi, Lemeki, 4Noa, Semi, Cham mpe Jafeti.
5Bana mibali ya Jafeti :
Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi.
6Bana mibali ya Gomeri :
Ashikenazi, Difati mpe Togarima.
7Bana mibali ya Yavani :
Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi.
8Bana mibali ya Cham :
Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana.
9Bana mibali ya Kushi :
Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka.
Bana mibali ya Raema :
Sheba mpe Dedani.
10Kushi azalaki tata
ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili.
11Mitsirayimi azalaki koko
ya bato ya Ludi, ya Anami, ya Leabi, ya Nafitu, 12ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti.
13Kanana azalaki tata
ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti, 14ya Yebusi, ya Amori, ya Girigazi, 15ya Evi, ya Ariki, ya Sini, 16ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati.
17Bana mibali ya Semi :
Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami.
Bana mibali ya Arami :
Utsi, Uli, Geteri mpe Mesheki.
18Aripakishadi abotaki Shela,
mpe Shela abotaki Eberi.
19Eberi abotaki bana mibali mibale ;
moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi » oyo elingi koloba : Kokabola ; pamba te ezalaki na tango na ye nde bakabolaki mabele. Kombo ya mwana mosusu ezalaki « Yokitani. »
20Yokitani abotaki
Alimodadi, Shelefi, Atsarimaveti, Yera, 21Adorami, Uzali, Dikila, 22Obali, Abimaeli, Saba,
23Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani.
Longwa na Semi kino na Ezawu mpe Jakobi
24Semi, Aripakishadi, Shela,
25Eberi, Pelegi, Rewu,
26Serugi, Naori, Tera,
27mpe Abrami oyo azali Abrayami.
28Bana mibali ya Abrayami :
Izaki mpe Isimaeli.
29Tala bakitani na bango :
Nebayoti, mwana mobali ya liboso ya Isimaeli ; Kedari, Adibeli, Mibisami, 30Mishima, Duma, Masa, Adadi, Tema, 31Yeturi, Nafishi mpe Kedima.
Bango nde bazalaki bana mibali ya Isimaeli.
32Bana mibali oyo Abrayami abotaki na Ketura, makangu na ye :
Zimirani, Yokishani, Medani, Madiani, Ishibaki mpe Shuwa.
Bana mibali ya Yokishani :
Saba mpe Dedani.
33Bana mibali ya Madiani :
Efa, Eferi, Enoki, Abida mpe Elida.
Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Ketura.
Bakitani ya Ezawu
34Abrayami azalaki tata ya Izaki.
Bana mibali ya Izaki :
Ezawu mpe Isalaele.
35Bana mibali ya Ezawu :
Elifazi, Reweli, Yewushi, Yaelami mpe Kora.
36Bana mibali ya Elifazi :
Temani, Omari, Tsefo, Gaetami, Kenazi, Timina mpe Amaleki.
37Bana mibali ya Reweli :
Naati, Zera, Shama mpe Miza.
38Bana mibali ya Seiri :
Lotani, Shobali, Tsibeoni, Ana, Dishoni, Etseri mpe Dishani.
39Bana mibali ya Lotani :
Ori mpe Omani. Timina azalaki ndeko mwasi ya Lotani.
40Bana mibali ya Shobali :
Alivani, Manaati, Ebali, Shefo mpe Onami.
Bana mibali ya Tsibeoni :
Aya mpe Ana.
41Mwana mobali ya Ana :
Dishoni.
Bana mibali ya Dishoni :
Emidani, Eshibani, Yitirani mpe Kerani.
42Bana mibali ya Etseri :
Bilani, Zavani mpe Yaakani.
Bana mibali ya Dishani :
Utsi mpe Arani.
Bakonzi ya Edomi
43Tala bakonzi oyo bakambaki Edomi liboso ete Isalaele ekoma kokambama na mokonzi :
Bela, mwana mobali ya Beori, oyo kombo ya engumba na ye ezalaki « Dinaba. »
44Tango Bela akufaki, Yobabi, mwana mobali ya Zera, moto ya mokili ya Botsira, akitanaki na ye na bokonzi.
45Tango Yobabi akufaki, Ushami, moto ya mokili ya Temani, akitanaki na ye na bokonzi.
46Tango Ushami akufaki, Adadi, mwana mobali ya Bedadi, akitanaki na ye na bokonzi. Alongaki bato ya Madiani na mokili ya bato ya Moabi. Engumba na ye ezalaki Aviti.
47Tango Adadi akufaki, Samila, moto ya engumba Masireka, akitanaki na ye na bokonzi.
48Tango Samila akufaki, Saulo, moto ya engumba Reoboti, engumba oyo etongama pembeni ya ebale, akitanaki na ye na bokonzi.
49Tango Saulo akufaki, Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akitanaki na ye na bokonzi.
50Tango Bala-Anani akufaki, Adadi akitanaki na ye na bokonzi. Engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi mpe koko ya Mezaabi. 51Adadi mpe akufaki.
Tala bakombo ya bakambi ya Edomi :
Timina, Aliva, Yeteti, 52Olibama, Ela, Pinoni, 53Kenazi, Temani, Mibitsari, 54Magidieli mpe Irami.
Bango nde bazalaki bakonzi ya Edomi.

Currently Selected:

1 Masolo ya Kala 1: MNB

Tya elembo

Copy

Kokisana

Kabola

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo