1
Levitike 26:12
Mokanda na Bomoi
MNB
Nakotambola kati na bino mpo ete nazala Nzambe na bino mpe bino bozala bato na Ngai.
Ṣe Àfiwé
Ṣàwárí Levitike 26:12
2
Levitike 26:4
nakonokisela bino mvula na tango na yango ; mabele mpe banzete ya zamba ekobota bambuma na yango.
Ṣàwárí Levitike 26:4
3
Levitike 26:3
Soki botosi mibeko na Ngai, soki botosi mitindo na Ngai mpe bosaleli yango
Ṣàwárí Levitike 26:3
4
Levitike 26:6
Nakotia kimia kati na mokili, bokolala pongi, mpe moto moko te akotungisa bino ; nakolongola banyama oyo ebomaka kati na mokili mpe bitumba ekozala lisusu te kati na mokili na bino.
Ṣàwárí Levitike 26:6
5
Levitike 26:9
Nakosalela bino ngolu, nakopesa bino mabota nakokomisa bino ebele mpe nakobatela boyokani na Ngai elongo na bino.
Ṣàwárí Levitike 26:9
6
Levitike 26:13
Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete bozala lisusu bawumbu kuna te ; nakataki basinga ya bikangiseli na bino mpe nabimisaki bino lokola balongi.
Ṣàwárí Levitike 26:13
7
Levitike 26:11
Nakotia Ndako na Ngai kati na bino mpe nakotombokela bino te.
Ṣàwárí Levitike 26:11
8
Levitike 26:1
Bokosalaka te banzambe ya bikeko to kotelemisa ekeko to likonzi ya bule mpe bokotiaka te kati na mokili na bino ata libanga moko oyo batia bililingi mpo ete bofukamela yango ; pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.
Ṣàwárí Levitike 26:1
9
Levitike 26:10
Bambuma ya bilanga na bino ekozala penza ebele mpe ekosala ete bokolia tango molayi bambuma oyo bokozala na yango kati na bibombelo ; kino bokokaba mosusu mpo ete bokotisa bambuma ya sika.
Ṣàwárí Levitike 26:10
10
Levitike 26:8
Bato mitano kati na bino bakolanda bato nkama moko, bato nkama moko kati na bino bakolanda bato nkoto zomi ; mpe banguna na bino bakokufa liboso na bino na mopanga.
Ṣàwárí Levitike 26:8
11
Levitike 26:5
Mosala ya kobeta ble ekowumela kino na tango ya kobuka, mpe tango ya kobuka ekowumela kino na tango ya kolona ; bokolia na kotonda mpe bokovanda na kimia kati na mokili na bino.
Ṣàwárí Levitike 26:5
12
Levitike 26:7
Bokobengana banguna liboso na bino mpe bakokufa na mopanga liboso na bino.
Ṣàwárí Levitike 26:7
13
Levitike 26:2
Bokobatelaka mikolo na Ngai ya Saba mpe bokotosaka Esika na Ngai ya bule. Nazali Yawe.
Ṣàwárí Levitike 26:2