Kende na makomi

Barome 5:6-11 - Kokɔla Mafɔ Nyonso

Barome 5:6-11 MNB (Mokanda na Bomoi)

Solo, wana tozalaki nanu bato na bolembu, Klisto akufaki mpo na bato ya masumu, na tango oyo Nzambe abongisaki. Ezali pasi komona moto kondima kokufa mpo na moto ya sembo ; tango mosusu, moto akoki kondima kokufa mpo na moto ya malamu. Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye : wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso. Lokola tokomi sik’oyo bato ya sembo na nzela ya makila na Ye, Klisto akobikisa biso mpe na kanda ya Nzambe. Solo, wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, Ye moko Nzambe azongisaki boyokani na biso elongo na Ye na nzela ya kufa ya Mwana na Ye. Boye lokola azongisi boyokani yango, akobikisa biso mpe na nzela ya bomoi ya mwana na Ye. Yango kaka te ! Tozali mpe komikumisa kati na Nzambe na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo azongisi boyokani na biso elongo na Nzambe.