Barome 13:1-3 - Kokɔla Mafɔ Nyonso
Barome 13:1-3 MNB (Mokanda na Bomoi)
Tika ete moto nyonso atosa bakonzi ya leta, pamba te bokonzi nyonso ewutaka na Nzambe, mpe ezali Nzambe nde atia bakonzi oyo bazali. Boye, moto oyo aboyi kotosa bakonzi ya leta azali nde kotombokela mabongisi oyo Nzambe asila kotia, mpe bato oyo basalaka bongo bamibendelaka nde etumbu mpo na bango moko. Bato oyo batambolaka malamu babangaka basambisi te, kaka bato oyo basalaka mabe nde babangaka basambisi. Oboyi kobanga mokonzi ? Sala makambo oyo ezali sembo, mpe mokonzi akondima yo.