Masese 2:1-5
Masese 2:1-5 Mokanda na Bomoi (MNB)
Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai ; soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanya mpe okabi motema na yo na makambo ya mayele ; soki obeleli mayele mpe ogangi epai ya bososoli ; soki oluki yango penza ndenge balukaka palata to bomengo oyo ebombama, okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini mpe okozwa boyebi ya Nzambe.
Kabola
Tanga Masese 2