Kende na makomi

Matayo 6:1-15 - Kokɔla Mafɔ Nyonso

Matayo 6:1-15 MNB (Mokanda na Bomoi)

Bosala keba ete bosalelaka te bosembo na bino liboso ya bato, mpo ete bamona bino ; soki te, bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abombela bino. Tango ozali kokabela babola, kobetela yango tangwa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka kati na bandako ya mayangani mpe na babalabala mpo ete bato bakumisa bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango. Kasi tango yo ozali kokabela babola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba ete likambo oyo loboko na yo ya mobali ezali kosala, mpo ete likabo na yo ya mawa etikala sekele ; bongo Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti. Tango bozali kosambela, bosalaka te lokola bato ya bilongi mibale oyo balingaka kosambela ya kotelema kati na bandako ya mayangani mpe na bisika oyo babalabala ekutana, mpo ete bato bamona bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango. Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti. Tango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka ; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi. Bosalaka lokola bango te, pamba te Tata na bino ayebi posa na bino liboso ete botalisa Ye yango. Tala ndenge nini bosengeli kosambela : ‹ Tata na biso, Yo oyo ozali kati na Likolo ; tika ete Kombo na Yo ebulisama, tika ete Bokonzi na Yo eya, tika ete mokano na Yo esalema, awa na mokili ndenge esalemaka kuna na Likolo ! Pesa biso, na mokolo ya lelo, bilei na biso ya mokolo na mokolo ; limbisa mabe na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo basalaki biso mabe ; komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  › Pamba te soki bolimbisi baninga, na mabe oyo basali bino, Tata na bino ya Likolo mpe akolimbisa bino ; kasi soki bolimbisi te, Tata na bino mpe akolimbisa te mabe na bino.