Kende na makomi

Matayo 5:38-45 - Kokɔla Mafɔ Nyonso

Matayo 5:38-45 MNB (Mokanda na Bomoi)

Boyokaki ete baloba : ‹ Liso mpo na liso, linu mpo na linu. › Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Botelemelaka te moto mabe ; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi. Soki moto alingi kofunda yo mpo na kozwa elamba na yo, pesa ye mpe kazaka na yo. Soki moto atindi yo na makasi ete otambola kilometele moko, yo, tambola bakilometele mibale elongo na ye. Pesa na moto oyo asengi yo, mpe koboya te kodefisa na moto oyo alingi kodefa epai na yo. Boyokaki ete baloba : ‹ Linga moninga na yo mpe yina monguna na yo. › Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino. Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.