Matayo 5:3-9 - Kokɔla Mafɔ Nyonso
Matayo 5:3-9 MNB (Mokanda na Bomoi)
« Esengo na babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango ! Esengo na bato oyo bazali kolela, pamba te bakobondisama ! Esengo na bato na komikitisa, pamba te bakozwa mokili lokola libula ! Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo, pamba te bakotondisama ! Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa ! Esengo na bato oyo bazali na mitema peto, pamba te bakomona Nzambe ! Esengo na bato oyo bayeisaka kimia, pamba te bakobengama bana na Nzambe !