Matayo 26:1-5 - Kokɔla Mafɔ Nyonso
Matayo 26:1-5 MNB (Mokanda na Bomoi)
Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, ayebisaki bayekoli na Ye : « Boyebi malamu ete etikali mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika ebanda, mpe ete ezali na tango wana nde bakokaba Mwana na Moto mpo ete babaka Ye na ekulusu. » Boye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basanganaki kati na ndako ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; bayokanaki kosalela mayele mabe mpo na kokanga Yesu mpe koboma Ye. Kasi balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. »