Matayo 24:37-39
Matayo 24:37-39 Mokanda na Bomoi (MNB)
Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na koya ya Mwana na Moto ; pamba te liboso ete mpela eya, bato bazalaki kolia mpe komela, kobala mpe kobalisa bana na bango, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa ; bayebaki eloko moko te na tina na oyo elingaki kosalema, kino mpela eyaki mpe ekumbaki bango nyonso. Ekozala mpe bongo na koya ya Mwana na Moto.
Kabola
Tanga Matayo 24