Matayo 2:4-6 - Kokɔla Mafɔ Nyonso
Matayo 2:4-6 MNB (Mokanda na Bomoi)
Abengaki mpe asangisaki bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; atunaki bango : — Klisto asengeli kobotama wapi ? Bazongiselaki ye : — Na Beteleemi ya Yuda, pamba te mosakoli akoma : « Bongo yo, Beteleemi, kati na mabele ya Yuda, ozali solo moke te kati na bingumba ya Yuda, pamba te Mokonzi oyo, lokola Mobateli bibwele, akotambolisa bato na Ngai, Isalaele, akobima nde kati na yo. »