Kende na makomi

Matayo 2:16-18 - Kokɔla Mafɔ Nyonso

Matayo 2:16-18 MNB (Mokanda na Bomoi)

Tango Erode asosolaki ete bato ya mayele bakosi ye, atombokaki makasi mpe apesaki mitindo ete baboma bana mike nyonso ya mibali ya mibu mibale kino na se, oyo bazalaki na Beteleemi mpe na zingazinga na yango, kolanda tango oyo bato ya mayele bayebisaki ye na tina na eleko oyo monzoto ebimaki. Boye nde ekokisamaki makambo oyo mosakoli Jeremi alobaki : « Makelele moko eyokani na Rama, makelele ya kolela makasi mpe ya matanga : Rasheli azali kolela bana na ye ; aboyi kobondisama, pamba te bazali lisusu na bomoi te. »