Kende na makomi

Matayo 2:1-5 - Kokɔla Mafɔ Nyonso

Matayo 2:1-5 MNB (Mokanda na Bomoi)

Yesu abotamaki na Beteleemi ya Yuda, wana Erode azalaki mokonzi. Na tango yango, bato ya mayele oyo bawutaki na este bayaki na Yelusalemi mpe batunaki : « Mokonzi ya Bayuda oyo abotami azali wapi ? Tomonaki monzoto na Ye kobima, yango wana toyei kogumbamela Ye. » Tango mokonzi Erode ayokaki bongo, motema na ye etungisamaki makasi elongo na Yelusalemi mobimba. Abengaki mpe asangisaki bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; atunaki bango : — Klisto asengeli kobotama wapi ? Bazongiselaki ye : — Na Beteleemi ya Yuda, pamba te mosakoli akoma