Kende na makomi

Matayo 18:32-35 - Kokɔla Mafɔ Nyonso

Matayo 18:32-35 MNB (Mokanda na Bomoi)

Bongo mokonzi abengaki mosali wana mpe alobaki na ye : « Mosali mabe ! Ngai nalimbisaki yo niongo nyonso oyo ozalaki na yango epai na ngai, mpo ete osengaki ngai. Boni, osengelaki te koyikela moninga na yo mpiko ndenge ngai nasalaki mpo na yo ? » Lokola mokonzi na ye azalaki na kanda, akabaki ye na maboko ya banyokoli kino tango afutaki niongo nyonso. Ezali ndenge wana nde Tata na Ngai ya Likolo akosala bino soki moko na moko kati na bino alimbisi te ndeko na ye, na motema na ye mobimba.