Ezayi 61:1-3
Ezayi 61:1-3 Mokanda na Bomoi (MNB)
Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, pamba te Yawe apakoli ngai mafuta mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, kosakola bonsomi epai ya bawumbu mpe kobimisa bakangami na boloko ; mpo na kosakola mpo na Yawe mobu ya ngolu, kosakola mpo na Nzambe na biso mokolo ya kozongisa mabe na mabe, kobondisa bato oyo bazali kolela, komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.
Kabola
Tanga Ezayi 61