Esidrasi 8:22-23 - Compare All Versions
Esidrasi 8:22-23 MNB (Mokanda na Bomoi)
Nayokaki soni mpo na kosenga epai ya mokonzi basoda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, mpo na kobatela biso na nzela liboso ya banguna na biso ; pamba te tolobaki na mokonzi : « Loboko ya ngolu ya Nzambe na biso ezali likolo ya moto nyonso oyo alukaka Ye, kasi kanda makasi na Ye ekitelaka bato nyonso oyo basundolaka Ye. » Boye, tokilaki bilei mpe tosengaki ngolu yango epai ya Nzambe na biso, mpe Ye ayanolaki libondeli na biso.
Kabola
Esidrasi 8 MNB