Daniele 3:16-18 - Compare All Versions
Daniele 3:16-18 MNB (Mokanda na Bomoi)
Shadraki, Meshaki mpe Abedinego bazongiselaki mokonzi Nabukodonozori : — Tozali na tina na komibundela te na likambo oyo liboso na yo. Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo. Kasi ata soki abikisi na Ye biso te, tolingi mokonzi oyeba ete, biso, tokosalela banzambe na yo te mpe tokogumbamela te ekeko ya wolo oyo osalaki.
Kabola
Daniele 3 MNB