Misala ya Bantoma 27:7 - Kokɔla Mafɔ Nyonso
Misala ya Bantoma 27:7 MNB (Mokanda na Bomoi)
Masuwa yango ezalaki kotambola malembe penza ; boye tosalaki mikolo mwa mingi ya mobembo, mpe tokomaki na Sinide na pasi penza. Lokola mpe mopepe ezalaki kopekisa biso kokende liboso, tolekaki Salimoni mpe tokendeki na ngambo ya sude ya esanga ya Kreti.
Kabola
Misala ya Bantoma 27 MNB