Misala ya Bantoma 1:3-5 - Kokɔla Mafɔ Nyonso
Misala ya Bantoma 1:3-5 MNB (Mokanda na Bomoi)
Sima na kufa na Ye, amimonisaki epai na bango ; mpe na nzela ya bilembo mingi, alakisaki bango ete azali na bomoi. Abimelaki bango mikolo tuku minei mpe alobelaki bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Mokolo moko, wana azalaki kolia elongo na bango, apesaki bango mitindo oyo : « Bolongwa na Yelusalemi te, kasi bozela likabo oyo Tata na Ngai alakaki, likabo oyo boyokaki Ngai kolobela. Pamba te Yoane abatisaki na mayi ; kasi bino, sima na mwa mikolo, bokobatisama kati na Molimo Mosantu. »