Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

2 Masolo ya Kala 20:21 - Compare All Versions

2 Masolo ya Kala 20:21 MNB (Mokanda na Bomoi)

Sima na ye kosolola na bato, Jozafati aponaki bayembi, atiaki bango liboso ya mampinga ya basoda, mpo na kokumisa Yawe mpe kotombola nkembo ya bosantu na Ye. Mpe batambolaki liboso ya mampinga ya basoda na koyemba : « Bosanzola Yawe, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »