1 Samuele 19:1-2
1 Samuele 19:1-2 Mokanda na Bomoi (MNB)
Saulo ayebisaki mabongisi na ye ya koboma Davidi epai ya mwana na ye, Jonatan, mpe epai ya basali na ye nyonso. Nzokande Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki kolinga Davidi makasi. Jonatan ayebisaki Davidi : « Tata na ngai, Saulo, azali koluka libaku ya koboma yo. Nabondeli yo, lobi na tongo, zala penza na ekenge ! Kende na yo komibomba mpe vanda kuna.
Kabola
Tanga 1 Samuele 19