1 Samuele 11:6-7
1 Samuele 11:6-7 Mokanda na Bomoi (MNB)
Tango Saulo ayokaki maloba na bango, Molimo na Nzambe akitelaki ye na nguya mpe asilikaki makasi. Akamataki bangombe mibale, akataki yango na biteni mpe atindaki biteni yango na Isalaele mobimba na nzela ya bantoma. Bamemaki sango oyo : « Ezali boye nde bakosala bangombe ya moto nyonso oyo akolanda te Saulo mpe Samuele na bitumba. » Lokola somo makasi ya Yawe ekangaki bato ya Isalaele, batambolaki lokola moto moko.
Kabola
Tanga 1 Samuele 11