Yawe asalaki ngai liboso ete asala nyonso, liboso ya misala na Ye nyonso ya kala ; aponaki ngai liboso ete mokili ezala, wuta na ebandeli penza, wuta na tango oyo biloko nyonso ya mokili ezalaki nanu te. Nabotamaki tango mayi ya bozindo ezalaki nanu te, tango miluka ebimisaki nanu mayi na yango te, liboso ete bangomba ya milayi mpe bangomba ya mikuse ezala na bisika na yango, tango amisalelaki nanu te, ezala mabele to bilanga to mpe putulu ya mokili. Nazalaki wana tango atandaki likolo na esika na yango, mpe tango akataki mondelo ya etando monene ya mayi ya bozindo, tango atiaki mapata na likolo mpe abimisaki mayi wuta na bitima, tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele ; nazalaki pembeni na Ye lokola mosungi, nazalaki kosepelisa ye tango nyonso, mpe nazalaki tango nyonso na esengo liboso na Ye ; nazalaki kosepela kati na mokili na Ye mpe nazalaki na esengo kati na bato. Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai : Esengo na bato oyo babatelaka banzela na ngai ! Boyoka mateya na ngai mpe bokokoma bato ya bwanya, bomeka kobwaka yango te ! Esengo na moto oyo ayokelaka ngai, oyo asenzelaka na ekuke na ngai mokolo na mokolo, mpe akengelaka na ekotelo na ngai ! Pamba te moto oyo amoni ngai amoni bomoi mpe azwi ngolu na miso ya Yawe. Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko : moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »
Tanga Masese 8
Yoka Masese 8
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Masese 8:22-36
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo