Ngai, Bwanya, navandaka elongo na kokanisa, boye nayebi kokundola mayele mpe bososoli. Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta. Toli mpe bososoli ezali ya ngai, ngai nde mayele mpe makasi. Ezali na nzela na ngai nde bakonzi batambolisaka mokili, mpe bakambi basalaka mibeko ya sembo ; ezali na nzela na ngai nde bakambi, bankumu mpe basambisi nyonso ya mokili bayangelaka. Nalingaka bato oyo balingaka ngai, mpe bato oyo balukaka ngai bamonaka ngai. Bozwi mpe lokumu, bomengo oyo ewumelaka mpe bosembo etambolaka elongo na ngai. Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo, ezala wolo ya peto, mpe mbuma oyo nabotaka eleki palata ya kitoko. Natambolaka na nzela ya bosembo, mpe nasalelaka banzela oyo ememaka na boyengebene, mpo na kopesa libula epai ya bato oyo balingaka ngai mpe mpo na kotondisa bibombelo na bango.
Tanga Masese 8
Yoka Masese 8
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Masese 8:12-21
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo