Esengo na moto oyo amoni bwanya ! Esengo na moto oyo azwi mayele ! Pamba te kozala na yango eleki kozala na palata na motuya, mpe lifuti na yango eleki wolo oyo balekisi na moto na motuya. Ezali na motuya koleka babiju, mpe eloko moko te oyo moto akoki koluka ekokani na yango. Kati na loboko na Ye ya mobali, ezali na bomoi ya molayi ; mpe kati na loboko na Ye ya mwasi, ezali na lokumu mpe bomengo. Nzela na Ye ezali ya esengo, mpe banzela na Ye nyonso ya mike ezali ya kimia. Bwanya ezali nzete ya bomoi mpo na bato oyo basimbaka yango ; bato oyo bakokanga yango makasi bakozala na esengo. Na nzela ya bwanya, Yawe atiaki miboko ya mabele ; na nzela ya mayele, alendisaki likolo. Na nzela ya mayele na Ye, mozindo ya se ya mabele ebimisaki mayi mpe mapata enokisaki mvula. Mwana na ngai, tika ete bwanya mpe bososoli ezala mosika ya miso na yo te ; batela yango malamu, pamba te ekozala bomoi mpo na yo mpe ngolu mpo na kingo na yo. Boye, okotambola na kimia na nzela na yo, mpe lokolo na yo ekobeta libaku te. Tango okolala, okobanga eloko moko te, pamba te pongi na yo ekozala ya kimia. Somo ya pwasa ekobangisa yo te, ezala tango bato mabe bakobimela yo na pwasa ; pamba te Yawe akozala elikya na yo mpe akobatela makolo na yo mpo ete ekangama te na motambo.
Tanga Masese 3
Yoka Masese 3
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Masese 3:13-26
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo