Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai ; soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanya mpe okabi motema na yo na makambo ya mayele ; soki obeleli mayele mpe ogangi epai ya bososoli ; soki oluki yango penza ndenge balukaka palata to bomengo oyo ebombama, okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini mpe okozwa boyebi ya Nzambe. Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli. Abongiselaka bato ya sembo elonga mpe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo. Pamba te abatelaka bayengebene mpe nzela ya bato oyo batosaka Ye. Boye, okososola likambo nini ezali solo, alima, sembo : nzela nyonso oyo ememaka na bolamu. Pamba te bwanya ekokota kati na motema na yo mpe boyebi ekosepelisa molimo na yo. Bososoli ekobatela yo, mpe mayele ekobomba yo
Tanga Masese 2
Yoka Masese 2
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Masese 2:1-11
5 Mikolo
Mpo na kozwa matomba na bozwi oyo mapambolami mpe ya mingi, bosengeli kobanda na kosala bozwi ya malamu. Soki bouti kondimela Klisto sika, bozwi oyo eleki kotanga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo ezali te. Bobanda Awa mpo na kozwa lisalisi ya kotanga yango, kolimbola yango mpe kosalela yango malamu mikolo Nyonso.
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo