Bobola mpe soni ekomelaka bato oyo baboyaka koyekola, kasi moto oyo andimaka pamela akozwa lokumu. Posa oyo ekokisami esalaka esengo na motema, kasi kokabwana na mabe ezali likambo ya nkele na miso ya zoba. Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi. Mabe elandaka bato ya masumu, kasi bolamu ezali lifuti ya bato ya sembo. Moto oyo asalaka bolamu atikelaka bakitani na ye libula, kasi bomengo ya moto ya masumu ebombamaka mpo na moyengebene. Bilanga ya mobola ekoki kobotela ye bilei ebele, kasi ezali na bato oyo bazali kobeba mpo na kozanga bosembo. Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu alingaka ye te, kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye. Moyengebene aliaka mpe atondaka, kasi libumu ya moto mabe ezalaka na nzala.
Tanga Masese 13
Yoka Masese 13
Kabola
Kokisana Mabongoli nyonso: Masese 13:18-25
Bomba makomi, tanga atako ozali na Interneti te, tala mateya, mpe mingi koleka!
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo